< Jeremias 11 >

1 Det Ord, som kom til Jeremias fra Herren:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
2 Hør denne Pagts Ord og tal til Judas Mænd og Jerusalems. Borgere
— Boyoka malako ya boyokani oyo, mpe boyebisa yango epai ya bato ya Yuda mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi!
3 og sig: Så siger HERREN, Israels Gud: Forbandet være den, der ikke hører denne Pagts Ord,
Loba na bango: « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Tika ete alakelama mabe, moto oyo akotosa te malako ya boyokani
4 som jeg bød eders Fædre holde, dengang jeg førte dem ud af Ægypten, af Jernovnen, idet jeg sagde: "Hør min Røst og gør alt, hvad jeg pålægger eder, så skal I være mit Folk, og jeg vil være eders Gud
oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango: « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.
5 og holde den Ed, jeg tilsvor eders Fædre om at give dem et Land, der flyder med Mælk og Honning, som det nu er sket!" Og jeg svarede: "Amen, HERRE!"
Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » Nazongisaki: — Solo, Yawe; amen!
6 Og HERREN sagde til mig: Udråb alle disse Ord i Judas Byer og på Jerusalems Gader: Hør denne Pagts Ord og hold dem!
Yawe alobaki na ngai: — Sakola maloba nyonso oyo kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi: « Boyoka malako ya boyokani oyo mpe bosalela yango!
7 Thi jeg besvor eders Fædre, dengang jeg førte dem ud af Ægypten, ja til den Dag i Dag, årle og silde: "Hør min Røst!"
Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo: ‹ Botosa Ngai! ›
8 Men de hørte ikke og bøjede ikke deres Øre, men fulgte alle deres onde Hjertes Stivsind. Derfor bragte jeg over dem alle denne Pagts Ord, som jeg havde pålagt dem at holde, men som de ikke holdt.
Kasi batiaki matoyi mangongi mpe bayokelaki Ngai te. Balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Yango wana, natindelaki bango bilakeli mabe nyonso oyo ezali kati na boyokani oyo natindaki bango ete batosa, kasi bango basalelaki yango te. »
9 Og HERREN sagde til mig: Der er fundet en Sammensværgelse blandt Judas Mænd og Jerusalems Borgere;
Yawe alobaki na ngai: — Bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi basali likita.
10 de er vendt tilbage til deres Forfædres Misgerninger, de, som vægrede sig ved at høre mine Ord og holdt sig til fremmede Guder og dyrkede dem; Israels Hus og Judas Hus har brudt den Pagt, jeg sluttede med deres Fædre.
Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango.
11 Derfor, så siger HERREN: Se, jeg sender en Ulykke over dem, som de ikke kan slippe fra; og når de da råber til mig, vil jeg ikke høre dem.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.
12 Da skal Judas Byer og Jerusalems Borgere gå hen og råbe til de Guder, de tænder Offerild for; men de kan ikke frelse dem i Nødens Stund.
Bingumba ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi bakokende koganga epai ya banzambe ya bikeko oyo bazali kotumbela malasi ya ansa, kasi ekokoka kobikisa bango te tango pasi ya makasi ekokomela bango.
13 Thi mange som dine Byer er dine Guder, Juda, og mange som Gaderne i Jerusalem er Altrene, I har rejst for Skændselen, Altrene til af tænde Offerild for Baal.
Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »
14 Men du må ikke gå i Forbøn for dette Folk eller frembære Klage og Bøn for det; thi jeg hører ikke, når de råber til mig i Nødens Stund.
Kasi yo Jeremi, kosambela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango te, komeka te kosengela bango eloko; pamba te nakoyoka bango te tango bakobelela Ngai na tango ya pasi.
15 Hvad vil min elskede i mit Hus, hun, som øved Svig? Kan Fedt og helligt kød borttage din Ondskab, eller kan du reddes ved sligt?
« Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele? Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama ekoki solo kolongola etumbu na yo? Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana? »
16 Et grønt Oliventræ, skønt at skue, så kaldte HERREN dit Navn. Under voldsom Buldren og Bragen afsved Ilden dets Løv og brændte dets Grene.
Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.
17 Hærskarers HERRE, som plantede dig, truer dig med Ulykke til Straf for det onde, Israels Hus og Judas Hus gjorde for at krænke mig, idet de tændte Offerild for Baal.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa.
18 HERREN lod mig det vide, derfor ved jeg det; da lod du mig se deres Gerninger.
Lokola Yawe alakisaki ngai likita oyo bazalaki kosalela ngai, nasosolaki yango, pamba te atalisaki ngai mabongisi nyonso oyo bazalaki kosala.
19 Og jeg var som et tålsomt Lam, der føres til Slagtning. Jeg vidste ej af, at de tænkte på Rænker imod mig: "Lad os ødelægge Træet i Blomst, udrydde ham af de levendes Land, så hans Navn ej ihukommes mer."
Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba: « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »
20 Hærskarers HERRE, retfærdige Dommer, som prøver Nyrer og Hjerte, lad mig skue din Hævn på dem, thi på dig har jeg væltet min Sag.
Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo osambisaka na bosembo mpe omekaka mitema mpe makanisi, sala ete namona mabe oyo okozongisela bango, pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo.
21 Derfor, så siger HERREN om Mændene i Anatot, som står mig efter Livet og siger: "Du må ikke profetere i HERRENs Navn; ellers skal du dø for vor Hånd"
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba: « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo; »
22 derfor, så siger Hærskarers HERRE: Se, jeg, vil hjemsøge dem; deres unge Mænd skal dø for Sværd, deres Sønner og Døtre af Hunger;
yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi.
23 der skal ikke levnes dem nogen Rest, thi jeg sender Ulykke over Mændene i Anatot, når Året, de skal hjemsøges kommer.
Ata moko te kati na bango akobika, pamba te nakotindela bato ya Anatoti pasi, na mobu ya etumbu na bango. »

< Jeremias 11 >