< Esajas 66 >

1 Så siger HERREN: Himlen er og Jorden mine Fødders Skammel Hvad for et Hus vil I bygge mig, og hvad for et Sted er min Bolig?
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai?
2 Alt dette skabte min Hånd, så det fremkom, lyder det fra HERREN. Jeg ser hen til den arme, til den, som har en sønderknust Ånd, og den, som bæver for mit Ord.
Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala: moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
3 Den, som slagter Okse, er en Manddraber, den, som ofrer Lam, er en Hundemorder, den, som ofrer Afgrøde, frembærer Svineblod, den, som brænder Røgelse, hylder en Afgud. Som de valgte deres egne Veje og ynder deres væmmelige Guder,
Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.
4 så vælger og jeg deres Smerte, bringer over dem, hvad de frygter, fordi de ej svared, da jeg kaldte, ej hørte, endskønt jeg taled, men gjorde, hvad der vakte mit Mishag, valgte, hvad ej var min Vilje.
Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka. Pamba te tango nabelelaki, moto moko te ayanolaki; tango nalobaki, moto moko te ayokaki; kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
5 Hør HERRENs Ord, I, som bæver for hans Ord: Således siger eders Brødre, der hader eder og støder eder bort for mit Navns Skyld: "Lad HERREN vise sig i sin Herlighed, så vi kan se eders Glæde!" Men de skal blive til Skamme!
Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye: « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi: ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
6 Hør, hvor det drøner fra Byen, drøner fra Templet, hør, hvor HERREN øver Gengæld imod sine Fjender!
Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.
7 Før hun er i Barnsnød, føder hun, før end Veer kommer over hende, har hun en Dreng.
Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki; liboso ete pasi ya kobota ekomela ye, abotaki mwana mobali.
8 Hvo hørte vel Mage dertil, hvo så vel sligt? Kommer et Land til Verden på en eneste Dag, fødes et Folk på et Øjeblik? Thi Zion kom i Barnsnød og fødte med det samme sine Børn.
Nani ayoka likambo ya boye? Nani amona makambo ya boye? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.
9 Åbner jeg et Moderliv og hindrer det i Fødsel? siger HERREN. Bringer jeg Fødsel og standser den? siger din Gud.
Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota mpe kozanga makoki ya kobotisa? » Elobi Yawe. « Nakoki solo kokanga mabota soki nazali kopesa mabota? » elobi Nzambe na yo.
10 Glæd dig, Jerusalem! Der juble enhver, som har det kær, tag Del i dets Glæde, alle, som sørger over det,
« Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.
11 for at I må die dets husvalende Barm og mættes, for at I må drikke af dets fulde Bryst og kvæges.
Pamba te bokomela miliki mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka; bokomela penza ndenge esengeli mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »
12 Thi så siger HERREN: Se, jeg leder til hende Fred som en svulmende Flod og Folkenes Rigdom som en Strøm; hendes spæde skal bæres på Hofte, og Kærtegn får de på Skød;
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakosopela ye kimia lokola ebale, mpe bozwi ya bikolo lokola ebale na tango ya mpela; bokobatelama, bokomemama na maboko na ye mpe akobondela bino na mabolongo na ye.
13 som en Moder trøster sin Søn, således trøster jeg eder, i Jerusalem finder I Trøst.
Ndenge mama abondelaka mwana na ye, ndenge wana mpe Ngai nakobondela bino; mpe bokobondisama mpo na Yelusalemi. »
14 I skal se det med Hjertens Glæde, eders Ledemod skal spire som Græs. Hos HERRENs Tjenere kendes hans Hånd, men hos hans Fjender Vrede.
Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.
15 Thi se, som Ild kommer HERREN, og hans Vogne er som et Stormvejr, han vil vise sin Harme i Gløder, sin Trussel i flammende Luer;
Tala, Yawe azali koya na moto, mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina; akokitisa kanda na Ye na somo penza mpe akopamela na nzela ya moto.
16 thi med Ild og med sit Sværd skal HERREN dømme alt Kød, og mange er HERRENs slagne.
Yawe akosambisa bato nyonso na nzela ya moto mpe ya mopanga; bongo, bato ebele bakokufa na mopanga, na maboko na Yawe.
17 De, som helliger og vier sig for Lundene, følgende en i deres Midte, de, som æder Svinekød og Kød af Kryb og Mus, deres Gerninger og deres Tanker skal forgå til Hobe, lyder det fra HERREN.
« Bato oyo bamibulisaka mpe bamipetolaka mpo na kokende na bilanga mpe kolanda moto moko oyo azali na kati-kati ya bato oyo baliaka misuni ya bangulu, ya bampuku mpe biloko mosusu ya mbindo, bakokufa bango nyonso elongo, » elobi Yawe.
18 Jeg kommer for at samle alle Folk og Tungemål, og de skal komme og se min Herlighed.
« Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.
19 Jeg fuldbyrder et Under i blandt dem og sender undslupne af dem til Folkene, Tarsis, Pul, Lud, Mesjek, Rosj, Tujal, Javan, de fjerne Strande, som ikke har hørt mit Ry eller set min Herlighed; og de skal forkynde min Herlighed blandt Folkene.
Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika: na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.
20 Og de skal bringe alle eders Brødre fra alle Folk som Gave til HERREN, til Hest, til Vogns, i Bærestol, på Muldyr og Kameler til mit hellige Bjerg Jerusalem, siger HERREN, som når Israelitterne bringer Offergaver i rene Kar til HERRENs Hus.
Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe.
21 Også af dem vil jeg udtage Levitpræster, siger HERREN.
Mpe nakopona kati na bango, ndambo ya bato mpo ete bazala Banganga-Nzambe mpe Balevi, » elobi Yawe.
22 Thi ligesom de nye Himle og den ny Jord, som jeg skaber, skal bestå for mit Åsyn, lyder det fra HERREN, således skal eders Afkom og Navn bestå.
« Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela.
23 Hver Måned på Nymånedagen og hver Uge på Sabbatten skal alt Kød komme og tilbede for mit Åsyn, siger HERREN,
Bato ya mokili mobimba bakoya kofukama liboso na Ngai, longwa na feti moko ya ebandeli ya sanza kino na feti mosusu, longwa na Saba moko kino na mosusu, » elobi Yawe,
24 og man går ud for at se på Ligene af de Mænd, der faldt fra mig; thi deres Orm dør ikke, og deres Ild slukkes ikke; de er alt Kød en Gru.
« bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te; bakopesa moto nyonso somo. »

< Esajas 66 >