< Esajas 62 >

1 For Zions Skyld vil jeg ej tie, for Jerusalems skyld ej hvile før dets Ret rinder op som Lys, som en luende Fakkel dets Frelse.
Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
2 Din Ret skal Folkene skue og alle Konger din Ære. Et nyt Navn giver man dig, som HERRENs Mund skal nævne.
Bongo bikolo ekomona bosembo na yo, mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo. Bakobenga yo na kombo ya sika oyo monoko na Yawe ekopesa.
3 Og du bliver en dejlig Krone i HERRENs Hånd, et kongeligt Hovedbind i Hånden på din Gud.
Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.
4 Du kaldes ej mer "den forladte", dit Land "den ensomme"; nej, "Velbehag" kaldes du selv, og dit Land kaldes "Hustru". Thi HERREN har Velbehag i dig, dit Land skal ægtes.
Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.
5 Som Ynglingen ægter en Jomfru, så din Bygmester dig, som Brudgom glædes ved Brud, så din Gud ved dig.
Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.
6 Jeg sætter Vægtere på dine Mure, Jerusalem; ingen Sinde bag eller Nat skal de tie. I, som minder HERREN, und jer ej Ro
Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te;
7 og lad ham ikke i Ro, før han bygger Jerusalem, før han får gjort Jerusalem til Pris på Jorden.
mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili!
8 HERREN svor ved sin højre, sin vældige Arm: Jeg giver ej mer dine Fjender dit Korn til Føde; Mosten, du sled for, skal Udlandets Sønner ej drikke;
Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi: « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi;
9 nej, de, der høster, skal spise prisende HERREN; de, der sanker, skal drikke i min hellige Forgård.
kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango mpe bakokumisa Yawe, mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »
10 Drag ud gennem Portene, drag ud, ban Folket Vej, byg Vej, byg Vej, sank alle Stenene af, rejs Banner over Folkeslagene!
Boleka, boleka na bikuke! Bobongisela bato nzela, bopasola nzela, bopasola nzela ya monene! Bolongola mabanga, botombola bendele liboso na bato ya bikolo.
11 Se, HERREN lader det høres til Jordens Ende: Sig til Zions Datter: "Se, din Frelse kommer, se, hans Løn er med ham, hans Vinding foran ham!"
Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele: « Boloba na Siona, mboka kitoko: ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »
12 De skal kaldes: det hellige Folk, HERRENs genløste, og du: den søgte, en By, som ej er forladt.
Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te.

< Esajas 62 >