< Esajas 59 >
1 Se, for kort til at frelse er ej HERRENs Arm, Hans Øre er ikke for sløvt til at høre.
Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te mpo na kobikisa, litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka!
2 Eders Brøde er det, der skiller mellem eder og eders Gud, eders Synder skjuler hans Åsyn for jer, så han ikke hører.
Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli bino na Nzambe na bino, ezali masumu na bino nde esali ete abombela bino elongi na Ye mpo ete ayoka bino te.
3 Eders Hænder er jo sølet at Blod, eders Fingre sølet af Brøde; Læberne farer med Løgn, Tungen taler, hvad ondt er.
Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.
4 Med Ret stævner ingen til Doms eller fører ærligt sin Sag. Man stoler på tomt, taler falsk, man undfanger Kval, føder Uret.
Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.
5 Slangeæg ruger de ud, og Spindelvæv er, hvad de væver. Man dør, hvis man spiser et Æg, en Øgle kommer frem, hvis det knuses.
Bazali kopasola maki ya etupa mpe bazali kotonga ndako ya lifofe. Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa; mpe, soki apasoli liki moko, ekobimisa etupa.
6 Deres Spind kan ej bruges til Klæder, ingen hyller sig i, hvad de laver; deres Værk er Ulykkesværk, og i deres Hænder er Vold;
Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.
7 deres Fødder haster til ondt, til at udgyde skyldfrit Blod; deres Tanker er Ulykkestanker; hvor de færdes, er Vold og Våde;
Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
8 de kender ej Fredens Veje, der er ingen Ret i deres Spor; de gør sig krogede Stier; Fred kender ingen, som træder dem.
Bayebi nzela ya kimia te, mpe bosembo ezali na nzela na bango te; bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, moko te oyo akotambola na nzela yango akotikala koyeba kimia.
9 Derfor er Ret os fjern, og Retfærd når os ikke; vi bier på Lys se, Mørke, på Dagning, men vandrer i Mulm;
Yango wana bosembo ezali mosika na biso, mpe solo ezali kokomela biso te; tozali kozela pole, kasi nyonso ezali kaka molili; toluki moyi, kasi tozali kaka kotambola na molili.
10 vi famler langs Væggen som blinde, famler, som savnede vi Øjne, vi snubler ved Middag som i Skumring, er som døde i vor kraftigste Alder;
Tozali kosimbasimba mir mpo na kotambola lokola bakufi miso, tozali kobanga kotambola lokola bato bazanga miso; tozali kobeta mabaku na moyi makasi lokola nde tozali na butu makasi, tozali na nzoto kolongono kasi tokomi lokola bakufi.
11 vi brummer alle som Bjørne, kurrer vemodigt som Duer; vi bier forgæves på Ret, på Frelse, den er os fjern.
Biso nyonso tozali konguna-nguna lokola bangombolo, mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga; tozali koluka bosembo, kasi tozali komona yango te, tozali koluka lobiko, kasi ekimi mosika na biso!
12 Thi du ser; vore Synder er mange, vor Brøde vidner imod os: ja, vi har vore Synder for Øje, vi kender såvel vor Skyld:
Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo, mpe masumu na biso ekomi kofunda biso; masumu na biso ezali liboso na biso mpe toyebi malamu bambeba na biso:
13 Vi faldt fra og fornægtede HERREN, veg langt bort fra vor Gud, vor Tale var Vold og Frafald, og vi fremførte Løgne fra Hjertet.
kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.
14 Retten trænges tilbage, Retfærd står i det fjerne, thi Sandhed snubler på Gaden, Ærlighed har ingen Gænge;
Boye, bosembo ezongi sima, mpe bosolo etelemi mosika; pamba te solo ekweyi na balabala, mpe bosembo elongi kokota te.
15 Sandhedens Plads står tom, og skyr man det onde, flås man. Og HERREN så til med Harme, fordi der ikke var Ret;
Solo ezali komonana lisusu na esika moko te; bazali konyokola moto oyo azali kokima mabe. Yawe amoni yango mpe asepeli te ete kosambisa na bosembo ezali te.
16 han så, at der ingen var, og det undrede ham, at ingen greb ind. Da kom hans Arm ham til Hjælp, hans Retfærd, den stod ham bi;
Amoni ete ezali ata na moto moko te, akamwe ete ata molobeli moko te azali. Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko, mpe bosembo na Ye elendisi Ye.
17 han tog Retfærds Brynje på, satte Frelsens Hjelm på sit Hoved, tog Hævnens Kjortel på og hylled sig i Nidkærheds Kappe.
Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.
18 Han gengælder efter Fortjeneste, Vrede mod Uvenner, Gengæld mod Fjender, mod fjerne Strande gør han Gengæld,
Akofuta moto na moto kolanda misala na ye: kanda makasi epai ya bayini na Ye, mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye; akopesa na bisanga lifuti na yango.
19 så HERRENs Navn frygtes i Vest, hans Herlighed, hvor Sol står op. Thi han kommer som en indestængt Flom, der drives af HERRENs Ånde.
Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.
20 En Genløser kommer fra Zion og fjerner Frafald i Jakob, lyder det fra HERREN.
« Mpo na Siona, mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi, oyo bakobongwana na masumu na bango, » elobi Yawe.
21 Dette er min Pagt med dem, siger HERREN: Min Ånd, som er over dig, og mine Ord, som jeg har lagt i din Mund, skal ikke vige fra din eller dit Afkoms eller dit Afkoms Afkoms Mund, siger HERREN, fra nu og til evig Tid.
« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango: Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.