< Esajas 38 >

1 Ved den Tid blev Ezekias dødssyg. Da kom Profeten Esajas, Amoz's Søn, til ham og sagde: "Så siger HERREN: Beskik dit Hus, thi du skal dø og ikke leve!"
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
2 Da vendte han Ansigtet om mod Væggen og bad således til HERREN:
Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe:
3 "Ak, HERRE, kom dog i Hu, hvorledes jeg har vandret for dit Åsyn i Oprigtighed og med helt Hjerte og gjort, hvad der er godt i dine Øjne!" Og Ezekias græd højt.
« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
4 Da kom HERRENs Ord til Esajas således:
Bongo, Yawe alobaki na Ezayi:
5 "Gå hen og sig til Ezekias: Så siger HERREN, din Fader Davids Gud: Jeg har hørt din Bøn, jeg har set dine Tårer! Se, jeg vil lægge femten År til dit Liv
« Kende koloba na Ezekiasi: ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi: ‘Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.
6 og udfri dig og denne By af Assyrerkongens Hånd og værne om denne By!
Nakokangola yo elongo na engumba oyo, na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango.’
7 Og Tegnet fra HERREN på, at HERREN vil udføre, hvad han har sagt, skal være dig dette:
Bongo, tala elembo ya Yawe, elembo oyo ekolakisa mpo na yo ete Yawe akokokisa makambo oyo asili kolaka:
8 Se, jeg vil lade Skyggen gå de Streger tilbage, som den har flyttet sig med Solen på Akaz's Solur, ti Streger!" Da gik Solen de ti Streger, som den havde flyttet sig, tilbage på Soluret.
Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.
9 En Bøn af Kong Ezekias af Juda, da han var syg og kom sig af sin Sygdom:
Tala loyembo oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, akomaki na mokanda tango abikaki na bokono.
10 Jeg tænkte: Bort må jeg gå i min bedste Alder, hensættes i Dødsrigets Porte mine sidste År. (Sheol h7585)
Nazalaki komilobela: « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai? » (Sheol h7585)
11 Jeg tænkte: Ej skuer jeg HERREN i de levendes Land, ser ingen Mennesker mer blandt Skyggerigets Folk;
Namilobelaki: « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo!
12 min Bolig er nedbrudt, ført fra mig som Hyrdernes Telt, som en Væver sammenrulled du mit Liv og skar det fra Tråden. Du ofrer mig fra Dag til Nat,
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
13 jeg skriger til daggry; som en Løve knuser han alle Benene i mig; du giver mig ben fra Dag til Nat.
Nakangaki motema kino na tongo; kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
14 Jeg klynker som klagende Svale, sukker som Duen, jeg skuer med Tårer mod Himlen: HERRE, jeg trænges, vær mig Borgen!
Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi, nazalaki kolela lokola ebenga. Miso na ngai elembaki kotala likolo. Oh Yawe, natungisami, batela ngai! »
15 Hvad skal jeg, sige? Han talede til mig og selv greb han ind. For Bitterhedens Skyld i min Sjæl vil jeg vandre sagtelig alle mine År.
Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.
16 Herre, man skal bære Bud derom til alle kommende Slægter. Opliv min Ånd, helbred mig og gør mig karsk!
Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo; ezali mpe na nzela na yango nde ngai nazwi bomoi. Ozongiselaki ngai nzoto kolongono mpe opesi ngai bomoi.
17 Se, Bitterhed, Bitterhed blev mig til Fred. Og du skåned min Sjæl for Undergangens Grav; thi alle mine Synder kasted du bag din Ryg.
Solo, pasi na ngai ebongwani esengo; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.
18 Thi Dødsriget takker dig ikke, dig lover ej Døden, på din Miskundbed håber ej de, der synker i Graven. (Sheol h7585)
Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo, kufa ekoki kosanzola Yo te; bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te. (Sheol h7585)
19 Men den levende, den levende takker dig som jeg i Dag. Om din Trofasthed taler Fædre til deres Børn.
Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.
20 HERRE, frels os! Så vil vi røre Strengene alle vore Levedage ved HERRENs Hus.
Yawe, lokola obikisi ngai, tokobeta mindule na biso mikolo nyonso ya bomoi na biso na Tempelo ya Yawe.
21 Da bød Esajas, at man skulde tage en Figenkage og lægge den som Plaster på det syge Sted, for at han kunde blive rask.
Ezayi alobaki: — Bozwa liboke ya figi, botia yango na pota; mpe mokonzi akobika.
22 Og Ezekias sagde: "Hvad er Tegnet på, at jeg skal gå op til HERRENs Hus?"
Ezekiasi alobaki: — Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe?

< Esajas 38 >