< Esajas 31 >

1 Ve dem, som går ned til Ægypten om hjælp og slår Lid til heste, som stoler på Vognenes mængde, på Rytternes store Tal, men ikke ser hen til Israels Hellige, ej rådspørger HERREN.
Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te!
2 Men viis er og han, lader Ulykke komme og går ej fra sit Ord. Han står op mod de ondes Hus og mod Udådsmændenes Hjælp.
Nzokande, Ye mpe azali na bwanya mpe akoki koyeisa pasi; abongolaka maloba na Ye te. Atelemelaka ndako ya bato mabe mpe bato oyo basungaka bango.
3 Ægypterne er Mennesker, ikke Gud, deres Heste er Kød, ikke Ånd. Når HERREN udrækker Hånden, snubler Hjælperen, den hjulpne falder, de omkommer alle til Hobe.
Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya; bongo, bango mibale bakobebisama.
4 Thi så sagde HERREN til mig: Som en Løve knurrer, en Ungløve over sit Rov, og ikke, når Hyrdernes Flok kaldes hid imod den, skræmmes af Skriget eller viger for Larmen, så stiger Hærskarers HERRE ned til Kamp på Zions Bjerg og Høj.
Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai: « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.
5 Som svævende Fugle så skærmer Hærskarers HERRE Jerusalem, skærmer og frier, skåner og redder.
Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela Yelusalemi, akobatela mpe akokangola, akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. »
6 Vend om til ham, hvem Israels Børn faldt fra så dybt!
Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi!
7 Thi på hin Dag vrager enhver sine Guder af Sølv sine Guder af Guld, eders Hænders syndige Værk.
Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu.
8 Assur falder for Sværd, men ikke en Mands, et Sværd fortærer det, ikke et Menneskes. Og han skal fly for Sværdet, til Hoveriarbejde tvinges hans Stridsmænd;
« Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga ya moto ya mokili oyo te, ekobebisama na mopanga ya moto te. Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma kosala misala ya makasi.
9 hans Klippe viger bort af Rædsel, hans Fyrster skræmmes fra Fanen. Så lyder det fra HERREN, hvis Ild er i Zion, som har sin Ovn i Jerusalem.
Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.

< Esajas 31 >