< Hoseas 8 >

1 Sæt hornet for din mund, som en ørn over Herrens Hus! fordi de brød min Pagt og overtrådte min Lov.
Tia kelelo na monoko na yo! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.
2 De råber til mig: "Min Gud! Vi, Israel, kender dig."
Isalaele azali kobelela Ngai: « Oh Nzambe na biso, toyebi Yo! »
3 Israel vragede Lykken, lad så Fjenden forfølge dem.
Kasi Isalaele abwaki makambo malamu; yango wana, monguna akolanda ye.
4 De kårer sig Drot uden mig, uden mit Vidende Fyrster. Af deres Sølv og Guld lavede de sig Gudebilleder til egen Undergang.
Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.
5 Modbydelig er din kalv, Samaria; min Vrede luer imod dem hvor længe? De kan ikke slippe for Straf.
Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto?
6 Thi den er et Værk af Israel, en Håndværker lavede den; den er ikke Gud. Nej, til Splinter skal Samarias Kalv blive.
Ewuti na Isalaele! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.
7 Thi Vind har de sået, og Storm skal de høste, Sæd uden Spire, der ej giver Mel; og gav den, slugte fremmede Melet.
« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.
8 Israel er opslugt, blandt Folkene regnes det nu for et Kar uden Værd.
Isalaele abebisami; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba!
9 Thi de er draget til Assur som et enligt strejfende Vildæsel. Efraim tinged med Elskovsgaver.
Pamba te bakendeki na Asiri lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko. Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.
10 Selv om de tinger blandt Folkene, samler jeg dem nu; snart salver de ikke mere konge og Fyrster.
Ata apesaki bakado kati na bikolo, sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko ya mokonzi moko ya nguya.
11 Thi så mange Altre Efraim har bygget, de er blevet ham Altre til Synd;
Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.
12 jeg skriver ham mange Love, han regner dem ikke.
Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.
13 Slagtofre elsker de slagter, elsker Kød og æder; HERREN behager de ej. Han mindes nu deres Skyld og straffer deres Synder. De skal tilbage til Ægypten.
Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango: bakozonga na Ejipito.
14 Israel glemte sin Skaber og byggede Helligdomme, og Juda byggede mange faste Stæder; derfor sender jeg Ild imod hans Byer, og den skal fortære hans Borge.
Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »

< Hoseas 8 >