< Hoseas 13 >

1 Når Efraim talte, skjalv man, i Israel var han fyrste, han forbrød sig med Ba'alog døde.
Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala; yango wana akufaki.
2 Nu bliver de ved at synde og laver sig støbte Guder, dannet som Billeder af Sølv, Arbejderes Værk til Hobe; de siger: "Til dem skal I ofre!" Mennesker kysser Kalve!
Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu: nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango: « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »
3 Derfor: som Morgentåge, som Duggen, der årle svinder, som Avner, der blæses fra Lo, som Røg fra Røghul skal de blive.
Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo, lokola londende ya tongo oyo elimwaka, lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika na esika oyo batutelaka ble, mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.
4 Og jeg er HERREN din Gud, fra du var i Ægyptens Land; du kender ej Gud uden mig, uden mig er der ingen Frelser;
« Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito. Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai, ozali na mobikisi mosusu te.
5 jeg var din Vogter i Ørken, den svidende Tørkes Land.
Ngai, nayebaki yo kati na esobe, kati na mabele oyo ekawuka.
6 Som de græssede, åd de sig mætte, ja mætte, men Hjertet blev stolt; derfor glemte de mig.
Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.
7 Så blev jeg for dem som en Løve, en lurende Panter ved Vejen,
Boye, nakokweyela bino lokola nkosi mpe nakozela bino na nzela lokola nkoyi.
8 jeg falder over dem som Bjørnen, hvis Unger man tog. Jeg sønderriver dem Brystet, Hunde skal æde deraf, Markens Dyr flå dem sønder.
Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.
9 Når Ulykken kommer, Israel, hvor mon du da finder Hjælp?
Isalaele, obebisami; pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo!
10 Hvor er da din Konge til Frelse for dig i alle dine Byer, Herskerne, om hvem du siger: "Giv mig dog Konge og Fyrster!"
Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo? Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso oyo, na tina na bango, bozalaki koloba: ‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli? ›
11 Jeg giver dig Konge i Vrede og fjerner ham atter i Harme.
Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi, mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.
12 Tilbundet er Efraims Brøde, hans Synd gemt hen.
Mabe ya Efrayimi ebombami, mpe masumu na ye ekomami penza.
13 Hans Fødselsstunds Veer er der, men sært er Barnet, som ej kommer frem i Tide, så Fødselen får Ende.
Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.
14 Dem skal jeg fri fra Dødsriget, løse fra Døden! Nej, Død, hvor er din Pest, Dødsrige, hvor er din Sot? Til Mildhed kender jeg ej, thi et sært Barn er han. (Sheol h7585)
Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa? Nakoyokela bango mawa te! (Sheol h7585)
15 En Østenstorm, Herrens Ånde, bruser frem fra Ørken, løfter sig, tørrer hans Væld, gør hans Kilde tør, den tager hans Skatkammer med alle dets Skatte.
Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe: ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »
16 Samaria skal bøde, thi det stod sin Gud imod. For Sværd skal de falde, Børnene knuses, frugtsommelige Kvinders Liv rives op.
Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.

< Hoseas 13 >