< Hoseas 10 >

1 En frodig vinstok var Israel, som bar sin frugt, jo flere frugter, des flere Altre; som Landet gik frem, des skønnere Støtter.
Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.
2 Deres Hjerte var glat, så lad dem da bøde! Han skal slå Altrene ned, lægge Støtterne øde.
Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.
3 De siger jo nu: "Vi har ingen Konge; thi HERREN frygter vi ej; en Konge, hvad gavner han os?"
Boye bakoloba: « Tozali na mokonzi te, pamba te totosaki Yawe te. Ata tozalaki na mokonzi, akokaki kosala nini mpo na biso? »
4 Med Ord slår de om sig, gør Mened og indgår Forbund, så Ret bliver Gifturt, der gror langs Markens Furer.
Bapesaka bilaka ebele, balapaka ndayi ya lokuta mpe basalaka boyokani. Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.
5 For Bet-Avens Kalv skal Samarias Borgere ængstes, ja, over den skal dens Folk og dens Præster sørge, jamre over deres Skat, thi den bortføres fra dem;
Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.
6 som Gave til Storkongen føres og den til Assur. Efraim høster kun Skændsel, Israel Skam af sin Afgud.
Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri lokola likabo mpo na mokonzi monene. Efrayimi akoyoka soni, mpe Isalaele akosambwa mpo na mabongisi oyo basalaki.
7 Samarias Konge slettes som Skum på Vandets Flade.
Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango bakotiola likolo ya mayi lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.
8 Øde er Afgudshøjene, Israels Synd, og på deres Altre skal Torn og Tidsel gro. De siger til Bjergene: "Skjul os!" til Højene: "Fald ned over os!"
Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi: « Bozipa biso! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse: « Bokweyela biso! »
9 Du syndede, Israel, helt fra Gibeas Dage. Der i Gibea sagde man: "Krig skal ej nå os!" Men jeg kom over de Niddinger, revsede dem;
Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea mpe obongwani te. Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te?
10 Stammerne samled sig mod dem til Tugt for tvefold Brøde.
Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi; bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita mpe bakokanga bango minyololo likolo ya masumu mibale oyo basalaki.
11 En tilvænnet Kvie var Efraim, tærskede villigt, Åget lagde jeg selv på dens skønne Hals; for Ploven spændte jeg Efraim, Juda for Harven.
Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi oyo babokola malamu, alingaka kobeta ble; kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko. Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda, Yuda akobalola mabele, Jakobi akopanza-panza yango.
12 Så eders Sæd i Retfærd, høst i Fromhed; bryd eder kundskabs Nyjord og søg så HERREN, til Retfærds Frugt bliver eder til Del.
Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.
13 I pløjede Gudløshed, høstede Uret, fortærede Løgnens Frugt. Fordi du slår Lid til dine Vogne og mange Helte,
Bolonaki makambo mabe, bobukaki mpe makambo mabe mpe boliaki mbuma ya lokuta, pamba te botiaki elikya na makasi mpe na ebele ya basoda na bino.
14 skal Kampgny stå i dine Byer og alle dine Borge. De skal ødelægges, som da Sjalman ødelagde Bet-Arbel på Stridens Dag. Moder skal knuses hos Børn.
Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.
15 Det voldte Betel eder. For din Ondskabs Skyld skal Israels Konge, ved Morgengry gøres til intet.
Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.

< Hoseas 10 >