< Prædikeren 11 >

1 Kast dit Brød på Vandet, Thi du får det igen, går end lang Tid hen.
Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi, pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.
2 Del dit Gods i syv otte Dele, thi du ved ej, hvad ondt der kanske på Jorden.
Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.
3 Er Skyerne fulde af Regn, så gyder de den ud over Jorden; og falder et Træ mod Syd eller Nord; så bliver det liggende der, hvor det falder.
Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.
4 Man får aldrig sået, når man kigger efter Vinden, og aldrig høstet, når man ser efter Skyerne.
Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.
5 Som du ikke kender Vindens Vej eller Fostret i Moders Liv, så kender du ej heller Guds Virke, han, som virker alt.
Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.
6 Så din Sæd ved Gry og lad Hånden ej hvile ved Kvæld; thi du ved ej, om dette eller hint vil lykkes, eller begge Dele er lige gode.
Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.
7 Lyset er lifligt, at skue Solen er godt for Øjnene;
Pole ezali malamu, mpe miso esepelaka komona moyi.
8 ja, lever et Menneske mange År, skal han glæde sig over dem alle og komme Mørkets Dage i Hu, thi af dem er der mange i Vente; alt, hvad der kommer, er Tomhed.
Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.
9 Glæd dig, Yngling, i din Ungdom, vær vel til Mode i Livets Vår; gå, hvor dit Hjerte lyster, og nyd, hvad dit Øje skuer; men vid, at for alle disse Ting skal du kræves til Regnskab af Gud.
Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
10 Slå Mismod ud af dit Sind, hold Sygdom fjernt fra din Krop; thi Ungdom og Livsgry er Tomhed!
Yango wana, longola mawa na motema na yo, longola pasi na nzoto na yo; pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.

< Prædikeren 11 >