< 1 Samuel 30 >

1 Da David og hans Mænd Tredjedagen efter kom til Ziklag, var Amalekiterne faldet ind i Sydlandet og Ziklag, og de havde indtaget Ziklag og stukket det i Brand;
Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.
2 Kvinderne og alle, som var der, små og store, havde de taget til Fange; de havde ingen dræbt, men ført dem med sig, da de drog bort.
Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango.
3 Da David og hans Mænd kom til Byen, se, da var den nedbrændt og deres Hustruer, Sønner og Døtre taget til Fange.
Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu.
4 Da brast David og hans Krigere i lydelig Gråd, og de græd, til de ikke kunde mere.
Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela.
5 Også Davids to Hustruer Ahinoam fra Jizre'el og Abigajil, Karmeliten Nabals Hustru, var taget til Fange.
Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi: Ayinoami, moto ya Jizireyeli; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali.
6 Og David kom i stor Vånde, thi Folkene tænkte på at stene ham, da de alle græmmede sig over deres Sønner eller Døtre. Men David søgte Styrke hos HERREN sin Gud;
Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.
7 og David sagde til Præsten Ebjatar, Ahimeleks Søn: "Bring mig Efoden hid!" Og Ebjatar bragte David den.
Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki: « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango.
8 Da rådspurgte David HERREN: "Skal jeg sætte efter denne Røverskare? Kan jeg indhente den?" Han svarede: "Sæt efter den; thi du skal indhente den og bringe Redning!"
Bongo Davidi atunaki Yawe: — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi? Nakokoka na ngai kokanga bango? Yawe azongiselaki ye: — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.
9 Så drog David af Sted med de 600 Mand, som var hos ham, og de kom til Besorbækken, hvor de, som skulde lades tilbage, blev stående;
Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki;
10 men David begyndte Forfølgelsen med 400 Mand, medens 200 Mand, som var for udmattede til at gå over Besorbækken, blev tilbage.
pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda.
11 Og de fandt en Ægypter liggende på Marken; ham tog de med til David og gav ham Brød at spise og Vand at drikke;
Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia.
12 desuden gav de ham en Figenkage og to Rosinkager. Da han havde spist, kom han til Kræfter; - thi han havde hverken spist eller drukket i hele tre Døgn.
Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato.
13 David spurgte ham da: "Hvem tilhører du, og hvor er du fra?" Han svarede: "Jeg er en ung Ægypter, Træl hos en Amalekit; min Herre efterlod mig her, da jeg for tre Dage siden blev syg.
Davidi atunaki ye: — Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi? Azongiselaki ye: — Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela.
14 Vi gjorde Indfald i det kretiske Sydland, i Judas Område og i Kalebs Sydland, og Ziklag stak vi i Brand."
Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.
15 Da sagde David til ham: "Vil du vise mig Vej til denne Røverskare?" Han svarede: "Tilsværg mig ved Gud, at du hverken vil dræbe mig eller udlevere mig til min Herre, så vil jeg vise dig Vej til den!"
Davidi atunaki ye: — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali? Azongisaki: — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.
16 Så viste han dem Vej, og de traf dem spredte rundt om i hele Egnen i Færd med at spise og drikke og holde Fest på hele det store Bytte, de havde taget fra Filisterlandet og Judas Land.
Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda.
17 David huggede dem da ned fra Dæmring til Aften; og ingen af dem undslap undtagen 400 unge Mænd, som svang sig på Kamelerne og flygtede.
Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki.
18 Og David reddede alt, hvad Amalekiterne havde røvet, også sine to Hustruer.
Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale.
19 Og der savnedes intet, hverken småt eller stort, hverken Byttet eller Sønnerne og Døtrene eller noget af, hvad de havde taget med; det hele bragte David tilbage.
Moto na bango moko te azangaki: ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso.
20 Da tog de alt Småkvæget og Hornkvæget og drev det hen for David og sagde: "Her er Davids Bytte!"
Davidi akamataki bameme mpe bangombe nyonso. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya bibwele mpo na kolakisa yango nzela bazalaki koloba: « Tala bomengo ya bitumba ya Davidi. »
21 Da David kom til de 200 Mand, som havde været for udmattede til at følge ham, og som han havde ladet blive ved Besorbækken, gik de David og hans Folk i Møde, og David gik hen til Folkene og hilste på dem.
Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.
22 Men alle ildesindede Niddinger blandt dem, som havde fulgt David, tog til Orde og sagde: "De fulgte os ikke, derfor vil vi intet give dem af Byttet, vi har reddet; kun deres Hustruer og Børn må de tage med hjem!"
Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki: — Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende.
23 David sagde: "Således må I ikke gøre, nu da HERREN har været gavmild imod os og skærmet os og givet Røverskaren, som overfaldt os, i vor Hånd.
Kasi Davidi alobaki: — Te, bandeko na ngai ya mibali! Bokoki kosala boye te mpo na biloko oyo Yawe apesi biso! Pamba te abateli biso mpe akabi na maboko na biso mampinga nyonso oyo eyaki kobundisa biso.
24 Hvem er der vel, som vil følge eder i det? Nej, den, der drog i Kampen, og den, der blev ved Trosset, skal have lige Del, de skal dele med hinanden!"
Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko.
25 Og derved blev det både den Dag og siden; han gjorde det til Lov og Ret i Israel, som det er den Dag i bag.
Kobanda mokolo wana kino lelo, Davidi akomisaki yango mobeko mpe malako kati na Isalaele.
26 Da David kom til Ziklag, sendte han noget af Byttet til de Ældste i Juda, som var hans Venner, med det Bud: "Her er en Gave til eder af Byttet, der er taget fra HERRENs Fjender!"
Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki: « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »
27 Det var til dem i Betel, i Ramot i Sydlandet, i Jattir,
Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri;
28 dem i Ar'ara, i Sifmot, i Esjtemoa,
mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa;
29 i Karmel, i Jerame'eliternes Byer, i Keniternes Byer,
mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni;
30 i Horma, i Bor-Asjan, i Atak,
epai ya ba-oyo bazalaki na Orima, na Bori-Ashani, na Ataki;
31 i Hebron, og ligeledes til alle de andre Steder, hvor David havde færdedes med sine Mænd.
epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki.

< 1 Samuel 30 >