< Første Krønikebog 15 >

1 Siden byggede han sig Huse i Davidsbyen og beredte Guds Ark et Sted, idet han rejste den et Telt
Tango Davidi asilisaki kotonga bandako mpo na ye moko kati na engumba ya Davidi, abongisaki esika mpo na Sanduku ya Nzambe mpe atelemisaki ndako ya kapo mpo na yango.
2 Ved den Lejlighed sagde David: "Ingen andre end Leviterne må bære Guds Ark, thi dem har HERREN udvalgt til at bære Guds Ark og til at gøre Tjeneste for ham til evig Tid."
Davidi alobaki: « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »
3 Og David samlede hele Israel i Jerusalem for at føre HERRENs Ark op til det Sted, han havde beredt den.
Davidi asangisaki kati na Yelusalemi bana nyonso ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Yawe na esika oyo abongisaki mpo na yango.
4 Og David samlede Arons Sønner og Leviterne:
Davidi asangisaki lisusu bakitani ya Aron mpe Balevi:
5 Af Kehatiterne Øversten Uriel og hans Brødre, 120;
Mpo na bakitani ya Keati: mokambi Urieli elongo na bandeko na ye ya libota nkama moko na tuku mibale;
6 af Merariterne Øversten Asaja og hans Brødre, 220;
mpo na bakitani ya Merari: mokambi Asaya elongo na bandeko na ye ya libota nkama mibale na tuku mibale;
7 af Gersoniterne Øversten Joel og hans Brødre, 130;
mpo na bakitani ya Gerishoni: mokambi Joeli elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na tuku misato;
8 af Elizafans Sønner Øversten Sjemaja og hans Brødre, 200;
mpo na bakitani ya Elitsafani: mokambi Shemaya elongo na bandeko na ye ya libota, nkama mibale;
9 af Hebrons Sønner Øversten Eliel og hans Brødre, 80;
mpo na bakitani ya Ebron: mokambi Elieli elongo na bandeko na ye ya libota, tuku mwambe;
10 af Uzziels Sønner Øversten Amminadab og hans Brødre, 112.
mpo na bakitani ya Uzieli: mokambi Aminadabi elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na zomi na mibale.
11 Så lod David Præsterne Zadok og Ebjatar og Leviterne Uriel, Asaja, Joel, Sjemaja, Eliel og Amminadab kalde
Davidi abengaki Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari elongo na Balevi oyo: Urieli, Asaya, Joeli, Shemaya, Elieli mpe Aminadabi.
12 og sagde til dem: "I er Overhoveder for Leviternes Fædrenehuse; helliger eder tillige med eders Brødre og før HERRENs, Israels Guds, Ark op til det Sted, jeg har beredt den;
Alobaki na bango: « Bozali bakambi ya mabota ya Balevi, bino elongo na bandeko ya mabota na bino; bomipetola mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na esika oyo nabongisi mpo na yango.
13 det var jo, fordi I ikke var med første Gang, at HERREN vor Gud tilføjede os et Brud; thi vi søgte ham ikke på rette Måde."
Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »
14 Så helligede Præsferne og Leviterne sig for at føre HERRENs, Israels Guds, Ark op;
Boye, Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
15 og Levis Sønner løftede med Bærestængerne Guds Ark op på Skuldrene, som Moses havde påbudt efter HERRENS Ord.
Bongo Balevi bamemaki na banzete Sanduku ya Nzambe na mapeka na bango ndenge kaka Moyize atindaki, kolanda Liloba na Yawe.
16 Fremdeles bød David Leviternes Øverster at lade deres Brødre Sangerne stille sig op med Musikinstrumenter, Harper, Citre og Cymbler og lade høje Jubeltoner klinge.
Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule: nzenze, lindanda mpe manzanza.
17 Så lod Leviterne Heman, Joels Søn, og af hans Brødre Asaf, Berekjas Søn, og af deres Brødre Merariterne Etan, Husjajas Søn, stille sig op
Balevi baponaki Emani, mwana mobali ya Joeli; Azafi, mwana mobali ya Berekia, kati na bandeko na ye ya mibali; Etani, mwana mobali ya Kushaya, kati na bana ya Merari, na bandeko na ye ya mibali.
18 og ved Siden af dem deres Brødre af anden Rang Zekarja, Uzziel, Sjemiramot, Jehiel, Unni, Eliab, Benaja, Ma'aseja, Mattitja, Elipelehu og Miknejahu og Dørvogterne Obed-Edom og Je'iel;
Mpe mpo na kosunga bango, baponaki Balevi mosusu: Zakari, Beni, Yazieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Benaya, Maaseya, Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli. Bango nyonso bazalaki bakengeli bikuke.
19 Sangerne Heman, Asaf og Etan skulde spille på Kobbercymbler,
Babeti miziki: Emani, Azafi mpe Etani; bango bazalaki kobeta manzanza oyo basala na bronze.
20 Zekarja, Uzziel, Sjemiramot, Jehiel, Unni, Eliab, Ma'aseja og Benaja på Harper al-alamot;
Zakari, Azieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Maaseya mpe Benaya; bango bazalaki kobeta nzenze na mongongo ya soprano.
21 Mattitja, Elipelehu, Miknejahu, Obed-Edom og Je'iel skulde lede Sangen med Citre al-hassjeminit;
Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi, Yeyeli mpe Azazia; bango bazalaki kobeta mandanda ya basinga mwambe mpo na kotambolisa banzembo.
22 Konanja, Leviternes Øverste over dem, der bar, skulde lede disse, da han forstod sig derpå;
Kenania, mokambi ya Balevi, aponamaki mpo na kotambolisa banzembo; pamba te ayebaki mosala yango malamu.
23 Berekja og Elkana skulde være Dørvogtere ved Arken;
Berekia mpe Elikana, bazalaki bakengeli ya Sanduku ya Boyokani.
24 Præsterne Sjebanja, Josjafat, Netan'el, Amasaj, Zekarja, Benaja og Eliezer skulde blæse i Trompeterne foran Guds Ark; og Obed-Edom og Jehija skulde være Dørvogtere ved Arken.
Banganga-Nzambe Shebania, Jozafati, Netaneeli, Amasayi, Zakari, Benaya mpe Eliezeri; bazalaki kobeta kelelo liboso ya Sanduku ya Nzambe. Obedi-Edomi mpe Yeyiya bazalaki mpe bakengeli Sanduku ya Boyokani.
25 Derpå drog David, Israels Ældste og Tusindførerne hen for under Festglæde at lade HERRENs Pagts Ark bringe op fra Obed-Edoms Hus,
Davidi, bakambi ya Isalaele mpe bakonzi ya basoda nkoto moko bakendeki kozwa na esengo Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na ndako ya Obedi-Edomi.
26 og da Gud hjalp Leviterne, der har HERRENs Pagts Ark, ofrede man syv Tyre og syv Vædre.
Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.
27 David har en fin linned Kappe, ligeledes alle Leviterne, der har Arken, og Sangerne og Konanja, som ledede dem, der bar. Og David var iført en linned Efod.
Davidi elongo na Balevi nyonso oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani, bayembi mpe Kenania, mokambi ya bayembi: bango nyonso balataki banzambala ya lino ya talo. Kasi Davidi abakisaki lisusu efode ya lino na likolo.
28 Og hele Israel bragte HERRENs Pagts Ark op under Festjubel og til Hornets, Trompeternes og Cymblernes Klang, under Harpe- og Citerspil.
Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda.
29 Men da HERRENs Pagts Ark kom til Davidsbyen, så Sauls Datter Mikal ud af Vinduet, og da hun så Kong David springe og danse, ringeagtede hun ham i sit Hjerte.
Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.

< Første Krønikebog 15 >