< Salme 9 >

1 Til Sangmesteren. Al-mut-labben. En Salme af David. Jeg vil takke HERREN af hele mit Hjerte, kundgøre alle dine Undere,
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.
2 glæde og fryde mig i dig, lovsynge dit Navn, du Højeste,
Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
3 fordi mine Fjender veg, faldt og forgik for dit Aasyn.
Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.
4 Thi du hævded min Ret og min Sag, du sad paa Tronen som Retfærds Dommer.
Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.
5 Du trued ad Folkene, rydded de gudløse ud, deres Navn har du slettet for evigt.
Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe, olimwisaki kombo na bango mpo na libela.
6 Fjenden er borte, lagt øde for stedse, du omstyrted Byer, de mindes ej mer.
Banguna na ngai balimwa mpo na libela; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.
7 Men HERREN troner evindelig, han rejste sin Trone til Dom,
Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.
8 skal dømme Verden med Retfærd, fælde Dom over Folkefærd med Ret.
Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.
9 HERREN blev de fortryktes Tilflugt, en Tilflugt i Trængselstider;
Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
10 og de stoler paa dig, de, som kender dit Navn, thi du svigted ej dem, der søgte dig, HERRE.
Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.
11 Lovsyng HERREN, der bor paa Zion, kundgør blandt Folkene, hvad han har gjort!
Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.
12 Thi han, der hævner Blodskyld, kom dem i Hu, han glemte ikke de armes Raab:
Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.
13 »HERRE, vær naadig, se, hvad jeg lider af Avindsmænd, du, som løfter mig op fra Dødens Porte,
Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa;
14 at jeg kan kundgøre al din Pris, juble over din Frelse i Zions Datters Porte!«
mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.
15 Folkene sank i Graven, de grov, deres Fod blev hildet i Garnet, de satte.
Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
16 HERREN blev aabenbar, holdt Dom, den gudløse hildedes i sine Hænders Gerning. — Higgajon (Sela)
Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
17 Til Dødsriget skal de gudløse fare, alle Folk, der ej kommer Gud i Hu. (Sheol h7585)
Bato mabe, bikolo nyonso, oyo bakanisaka Nzambe te, bakokende na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
18 Thi den fattige glemmes ikke for evigt, ej skuffes evindelig ydmyges Haab.
Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.
19 Rejs dig, HERRE, lad ikke Mennesker faa Magten, lad Folkene dømmes for dit Aasyn;
Yawe, telema! Tika ete moto alonga te; tika ete bapagano basamba liboso na Yo!
20 HERRE, slaa dem med Rædsel, lad Folkene kende, at de er Mennesker! (Sela)
Yawe, tika ete somo ekanga bango; tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato!

< Salme 9 >