< Nehemias 11 >
1 Og Folkets Øverster bosatte sig i Jerusalem, medens det øvrige Folk kastede Lod saaledes, at hver tiende Mand skulde bosætte sig i Jerusalem, den hellige By, medens de ni Tiendedele skulde bo i Byerne.
Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.
2 Og Folket velsignede alle de Mænd, som frivilligt bosatte sig i Jerusalem.
Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.
3 Følgende er de Overhoveder i vor Landsdel, som boede i Jerusalem og i Judas Byer; de boede hver paa sin Ejendom i deres Byer, Israel, Præsterne, Leviterne, Tempeltrællene og Efterkommerne af Salomos Trælle.
Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye;
4 I Jerusalem boede af Judæere og Benjaminiter: Af Judæerne: Ataja, en Søn af Uzzija, en Søn af Zekarja, en Søn af Amarja, en Søn af Sjefatja, en Søn af Mahalal'el af Perez's Efterkommere,
mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi: Mpo na bakitani ya Yuda: Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi;
5 og Ma'aseja, en Søn af Baruk, en Søn af Kol-Hoze, en Søn af Hazaja, en Søn af Adaja, en Søn af Jojarib, en Søn af Sjelaniten Zekarja.
mpe Maaseya, mwana mobali ya Baruki, mwana mobali ya Koli-Oze, mwana mobali ya Azaya, mwana mobali ya Adaya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Zakari, moko kati na bakitani ya Shiloni.
6 Alle Perez's Efterkommere, der boede i Jerusalem, udgjorde 468 dygtige Mænd.
Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.
7 Følgende Benjaminiter: Sallu, en Søn af Mesjullam, en Søn af Joed, en Søn af Pedaja, en Søn af Kolaja, en Søn af Ma'aseja, en Søn af Itiel, en Søn af Jesja'ja,
Mpo na bakitani ya Benjame: Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Yoedi, mwana mobali ya Pedaya, mwana mobali ya Kolaya, mwana mobali ya Maaseya, mwana mobali ya Itieli, mwana mobali ya Ezayi;
8 og hans Brødre, dygtige Krigere, 928.
mpe Gabayi elongo na Salayi. Bango nyonso bazalaki bato nkama libwa na tuku mibale na mwambe.
9 Joel, Zikris Søn, var deres Befalingsmand, og Juda, Hassenuas Søn, var den næstøverste Befalingsmand i Byen.
Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba.
10 Af Præsterne: Jedaja, Jojarib Jakin,
Kati na Banganga-Nzambe: Yedaeya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Yakini;
11 Seraja, en Søn af Hilkija, en Søn af Mesjullam, en Søn af Zadok, en Søn af Merajot, en Søn af Ahitub, Øversten over Guds Hus,
Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe
12 og deres Brødre, der udførte Tjenesten i Templet, 822; og Adaja, en Søn af Jeroham, en Søn af Pelalja, en Søn af Amzi, en Søn af Zekarja, en Søn af Pasjhur, en Søn af Malkija,
elongo na bandeko na bango, nkama mwambe na tuku mibale na mibale oyo bazalaki kosala na Ndako ya Nzambe; Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pelalia, mwana mobali ya Amitsi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya
13 og hans Brødre, Overhovederne for Fædrenehusene, 242; og Amasjsaj, en Søn af Azar'el, en Søn af Azaj, en Søn af Mesjillemot, en Søn af Immer,
elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota; Amashisayi, mwana mobali ya Azareyeli, mwana mobali ya Azayi, mwana mobali ya Meshilemoti, mwana mobali ya Imeri, azalaki mpe elongo na bango.
14 og hans Brødre, dygtige Mænd 128. Deres Befalingsmand var Zabdiel, Gedolims Søn.
Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.
15 Af Leviterne: Sjemaja, en Søn af Hassjub, en Søn af Azrikam, en Søn af Hasjabja, en Søn af Bunni,
Kati na Balevi: Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Buni;
16 og Sjabbetaj og Jozabad, som forestod de ydre Arbejder ved Guds Hus og hørte til Leviternes Overhoveder,
Shabetayi mpe Yozabadi oyo bazalaki na molongo ya bakambi ya Balevi mpe bazalaki na mokumba ya misala ya libanda ya Ndako ya Nzambe;
17 og Mattanja, en Søn af Mika, en Søn af Zabdi, en Søn af Asaf, Lederen af Lovsangen, der ved Bønnen istemte Ordene lov HERREN! og Bakbukja, den næstøverste af hans Brødre, og Abda, en Søn af Sjammua, en Søn af Galal, en Søn af Jedutun.
Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo; Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni.
18 Alle Leviterne i den hellige By udgjorde 284.
Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.
19 Af Dørvogterne: Akkub, Talmon og deres Brødre, der holdt Vagt ved Portene, 172.
Bakengeli bikuke: Akubi, Talimoni elongo na bandeko na bango, oyo bazalaki bakengeli bikuke. Bango nyonso bazalaki bato nkama moko na tuku sambo na mibale.
20 Resten af Israeliterne, Præsterne og Leviterne boede i alle de andre Byer i Juda, hver paa sin Ejendom.
Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.
21 Tempeltrællene boede paa Ofel; Ziha og Gisjpa var sat over Tempeltrællene.
Basali ya Tempelo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, mpe Tsika elongo na Gishipa bazalaki bakambi na bango.
22 Leviternes foresatte i Jerusalem ved Tjenesten i Guds Hus var Uzzi, en Søn af Bani, en Søn af Hasjabja, en Søn af Mattanja, en Søn af Mika af Asafs Efterkommere, det er Sangerne.
Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.
23 Der var nemlig udstedt en kongelig Befaling om dem, og der var tilsikret Sangerne dagligt Underhold.
Misala ya bayembi ezalaki kotambolisama mokolo na mokolo na mitindo ya mokonzi.
24 Petaja, Mesjezab'els Søn, af Judas Søn Zeras Efterkommere, forhandlede med Kongen i alle Folkets Sager.
Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato.
25 Hvad de aabne Byer med deres Marker angaar, boede der Judæere i Kirjat-Arba med Smaabyer, Dibon med Smaabyer, Jekabze'el med Smaabyer,
Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
26 Jesua, Molada, Bet-Pelet,
kati na Yeshua, kati na Molada, kati na Beti-Paleti,
27 Hazar-Sjual, Be'ersjeba med Smaabyer,
kati na Atsari-Shuwali, kati na Beri-Sheba mpe bamboka na yango ya mike-mike,
28 Ziklag, Mekona med Smaabyer,
kati na Tsikilagi, kati na Mekona mpe bamboka na yango ya mike-mike,
29 En-Rimmon, Zor'a, Jarmut,
kati na Eini-Rimoni, kati na Tsorea, kati na Yarimuti,
30 Zanoa, Adullam med Landsbyer, Lakisj med Marker og Azeka med Smaabyer. De bosatte sig fra Be'ersjeba til Hinnoms Dal.
kati na Zanoa, Adulami mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Lakishi mpe bilanga na yango ya zingazinga, mpe kati na Azeka mpe bamboka na yango ya mike-mike. Boye bavandaki na etuka mobimba longwa na Beri-Sheba kino na Lubwaku ya Inomi.
31 Benjaminiterne boede i Geba, Mikmas, Ajja, Betel med Smaabyer,
Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
kati na Anatoti, Nobi mpe Anania,
33 Hazor, Rama, Gittajim,
kati na Atsori, Rama mpe Gitayimi,
34 Hadid, Zebo'im, Neballat,
kati na Adidi, Tseboyimi mpe Nebalati,
35 Lod, Ono og Haandværkerdalen.
kati na Lodi mpe Ono, lubwaku ya bato oyo basalaka misala ya maboko.
36 Af Leviterne boede nogle Afdelinger i Juda og Benjamin.
Masanga mosusu ya Balevi ya Yuda ekendeki kovanda kati na bato ya Benjame.