< Esajas 25 >
1 HERRE, min Gud er du; jeg priser dig, lover dit Navn. Thi du har gjort et Under, Raad fra fordum var tro og sande.
Yawe, ozali Nzambe na ngai; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.
2 Thi du lagde Byen i Grus, den faste Stad i Ruiner; de fremmedes Borg er nedbrudt, aldrig mer skal den bygges.
Okomisaki engumba mopiku ya mabanga, okomisaki bingumba ya makasi maboke ya mabanga; bandako batonga makasi ya bapaya etikali lisusu na bilongi ya engumba te, bakotonga yango lisusu te.
3 Derfor ærer dig et mægtigt Folk, frygter dig grumme Hedningers Stad.
Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu, bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo.
4 Thi du blev de ringes Værn, den fattiges Værn i Nøden, et Ly mod Skylregn, en Skygge mod Hede; thi som isnende Regn er Voldsmænds Aande,
Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir;
5 som Hede i det tørre Land. Du kuer de fremmedes Larm; som Hede ved Skyens Skygge saa dæmpes Voldsmænds Sang.
mpe lokola moto ya moyi na zelo ya esobe. Osilisaki makelele ya bapaya ndenge pio ya mapata esilisaka molunge; boye nde nzembo ya banyokoli esilaki.
6 Hærskarers HERRE gør paa dette Bjerg et Gæstebud for alle Folkeslag med fede Retter og stærk Vin, med fede, marvfulde Retter og stærk og klaret Vin.
Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.
7 Og han borttager paa dette Bjerg Sløret, som tilslører alle Folkeslag, og Dækket, der dækker alle Folk.
Kaka na ngomba oyo, akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso, bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso;
8 Han opsluger Døden for stedse. Og den Herre HERREN aftørrer Taaren af hver en Kind og gør Ende paa sit Folks Skam paa hele Jorden, saa sandt HERREN har talet.
akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.
9 Paa hin Dag skal man sige: Se, her er vor Gud, som vi biede paa, og som frelste os; her er HERREN, som vi biede paa. Lad os juble og glæde os over hans Frelse;
Na mokolo wana, bakoloba: « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso! »
10 thi HERRENS Haand hviler over dette Bjerg. Men Moab trampes ned, hvor det staar, som Straa i Møddingpølen;
Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.
11 det breder sine Hænder ud deri, som Svømmeren gør for at svømme, og han ydmyger dets Hovmod trods Hændernes Kunstgreb.
Akosembola maboko na Ye kati na yango ndenge basembolaka maboko mpo na kokata mayi. Nzambe akokitisa lolendo na bango mpe mayele ya maboko na bango;
12 Han nedbryder og nedstyrter de stejle Mures Værn; han jævner dem med Jorden, saa de ligger i Støvet.
akobuka bamir milayi na bino ya makasi mpe akolalisa yango na se; akokweyisa yango na mabele kino ekoma putulu.