< Hoseas 12 >
1 Efraims Hu staar til Vind, efter Østenstorm jager han stadig, af Løgn og Svig er han fuld; med Assur slutter de Pagt, til Ægypten bringer de Olie.
Efrayimi aliaka mopepe; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
2 HERREN gaar i Rette med Juda og hjemsøger Jakob, gengælder ham efter hans Veje og efter hans Id.
Yawe alingi kosamba na Yuda; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.
3 I Moders Liv overlisted han sin Broder, han stred med Gud i sin Manddom,
Na libumu ya mama na bango, akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe; tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.
4 ja stred med en Engel og sejred, han bad ham med Graad om Naade; i Betel traf han ham og talte med ham der,
Abundaki na anjelu mpe alongaki, alelaki mpe asengaki ngolu na ye. Jakobi akutanaki na ye na Beteli, mpe ezali kuna nde asololaki na ye.
5 HERREN, Hærskarers Gud, HERREN er hans Navn:
Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.
6 »Drag du nu hjem med din Gud, tag Vare paa Kærlighed og Ret og bi bestandig paa din Gud!«
Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.
7 I Kana'ans Haand er falske Lodder, han elsker Svig.
Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.
8 Efraim siger: »Jeg vandt dog Rigdom og Gods!« Al hans Vinding soner ej Brøden, han øved.
Efrayimi alobaka na lolendo nyonso: « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
9 Men jeg, som er HERREN din Gud, fra du var i Ægypten, lader dig bo i Telt igen som i svundne Dage.
Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
10 Jeg har talet til Profeterne og givet mange Syner, ved Profeterne talet i Lignelser.
Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.
11 Gilead er Løgn og Tomhed, i Gilgal ofrer de Tyre; som Stendynger langs med Markfurer er deres Altre.
Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.
12 Jakob flyede til Arams Slette, og Israel trællede for en Kvindes Skyld, og for en Kvindes Skyld vogtede han Kvæg.
Jakobi akimaki na mokili ya Siri; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.
13 Ved en Profet førte HERREN Israel op fra Ægypten, og det vogtedes ved en Profet.
Yawe asalelaki mosakoli mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito, abatelaki ye na nzela ya mosakoli.
14 Efraim vakte bitter Vrede, han bærer Blodskyld; med Skændsel dænges han til, hans Herre gør Gengæld.
Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi, yango wana, Nkolo na ye akotangela ye ngambo ya makila oyo asopaki mpe akofuta ye kolanda mabe na ye.