< Amos 5 >

1 Hør dette Ord, en Klagesang, som jeg istemmer over eder, Israels Hus:
Oh libota ya Isalaele, boyoka maloba oyo, eleli oyo nazali koloba na tina na bino:
2 Hun er faldet og rejser sig ikke, Israels Jomfru, henstrakt paa sin Jord, og ingen rejser hende op.
« Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »
3 Thi saa siger den Herre HERREN: Den By, som gaar i Leding med tusind, faar hundred tilbage, og den som gaar i Leding med hundred, faar ti tilbage i Israels Hus.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Engumba oyo ekotinda basoda nkoto moko mpo na kobundela Isalaele ekotikala kaka na basoda nkama moko, mpe oyo ekotinda basoda nkama moko ekotikala kaka na basoda zomi. »
4 Thi saa siger HERREN til Israels Hus: Søg mig, saa skal I leve!
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na libota ya Isalaele: « Bozonga epai na Ngai mpe bokobika!
5 Søg ikke til Betel, gaa ikke til Gilgal, drag ikke til Be'ersjeba! Thi Gilgal skal blive landflygtig, og Betel skal blive til intet.
Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »
6 Søg HERREN, saa skal I leve, at ikke en Lue slaar ud, en ædende Ild mod Josefs Hus, og Betel har ingen, som slukker.
Boluka Yawe mpe bokobika, soki te akokitela libota ya Jozefi lokola moto oyo ekozikisa yango, mpe moto moko te akozala na Beteli mpo na koboma yango.
7 Ve dem, som gør Ret til Malurt og kaster Retfærd i Støvet!
Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge mpe bobwakaka bosolo na mabele,
8 Syvstjernens og Orions Skaber, han, som vender Mulm til Morgen og gør Dag til Nattemørke, som kalder ad Havets Vande og gyder dem ud over Jorden, HERREN er hans Navn!
boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili; Kombo na Ye ezali: Yawe.
9 Han lader Ødelæggelse bryde ind over Borge, Ødelæggelse komme over Fæstninger.
Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi.
10 De hader Rettens Talsmand i Porten og afskyr den, som taler sandt.
Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,
11 Derfor, da I træder paa den ringe og tager Afgift af hans Korn, skal I vel bygge Kvaderstenshuse, men ikke bo deri; I skal vel plante yndige Vingaarde, men Vinen skal I ikke drikke.
lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.
12 Jeg ved, eders Overtrædelser er mange og uden Tal eders Synder, I Rettens Fjender, som tager mod Bøde og bortviser fattige i Porten.
Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene: bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
13 Derfor tier den kloge i denne Tid, thi det er onde Tider.
Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.
14 Søg det gode, ej det onde, for at I maa leve, og HERREN, Hærskarers Gud, maa være med eder, som I siger, han er.
Bolukaka kosala bolamu, kasi mabe te, mpo ete bokoka kobika. Boye, Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, akozala elongo na bino, ndenge kaka bozali koloba yango.
15 Had det onde og elsk det gode, hold Retten i Hævd i Porten! Maaske vil da HERREN, Hærskarers Gud, være naadig mod Josefs Rest.
Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.
16 Derfor, saa siger HERREN, Herren, Hærskarers Gud: Paa alle Torve skal klages, i alle Gader raabes: »Ve! Ve!« Bonden kalder til Sorg, til Ligklage Klagemænd;
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.
17 i hver en Vingaard skal klages, naar jeg drager igennem din Midte, siger HERREN.
Kolela ekozala na bilanga nyonso ya vino, pamba te nakoleka kati na bino, » elobi Yawe.
18 Ve eder, som længes efter HERRENS Dag! Hvad vil I med HERRENS Dag? Mørke er den, ej Lys.
Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.
19 Da gaar det, som naar en Mand flyr for en Løve og møder en Bjørn og, naar han tyr ind i Huset og støtter sin Haand til Væggen, bides af en Slange.
Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.
20 Ja, HERRENS Dag er Mørke, ej Lys, Bælgmørke uden Solskin.
Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.
21 Jeg hader, forsmaar eders Fester, er led ved eders festlige Samlinger,
Nayini bafeti na bino ya bule, nazali kosepela na yango ata moke te; mayangani na bino ya bule ezali kolumba solo mabe liboso na Ngai.
22 om ogsaa I bringer mig Brændofre. Eders Afgrødeofre behager mig ej, eders Fedekvægs-Takofre ser jeg ej til.
Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.
23 Spar mig dog for eders larmende Sang, eders Harpeklang hører jeg ikke.
Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai! Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.
24 Nej, Ret skal vælde frem som Vand og Retfærd som svulmende Bæk.
Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.
25 Bragte I mig Slagtoffer og Afgrødeoffer de fyrretyve Ørkenaar, Israels Hus?
Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe?
26 Saa skal I da bære Sakkut, eders Konge, og Kevan, eders Gudestjerne, Billeder, som I har lavet eder.
Nzokande, botombolaki ndako ya kapo ya Sikuti, mokonzi na bino, mpe evandelo ya Kevani, nzambe na bino ya ekeko, monzoto ya nzambe na bino oyo bomisalelaki.
27 I Landflygtighed jager jeg eder hinsides Damaskus, siger HERREN; Hærskarers Gud er hans Navn.
Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali: Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.

< Amos 5 >