< Romerne 2 >
1 Derfor er du uden Undskyldning, o Menneske! hvem du end er, som dømmer; thi idet du dømmer den anden, fordømmer du dig selv; thi du, som dømmer, øver det samme.
Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango.
2 Vi vide jo, at Guds Dom er, stemmende med Sandhed, over dem, som øve saadanne Ting.
Nzokande, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka kolanda bosolo bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana.
3 Men du, o Menneske! som dømmer dem, der øve saadanne Ting, og selv gør dem, mener du dette, at du skal undfly Guds Dom?
Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana mpe osalaka makambo yango kaka lokola bango?
4 Eller foragter du hans Godheds og Taalmodigheds og Langmodigheds Rigdom og ved ikke, at Guds Godhed leder dig til Omvendelse?
To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema?
5 Men efter din Haardhed og dit ubodfærdige Hjerte samler du dig selv Vrede paa Vredens og Guds retfærdige Doms Aabenbarelses Dag,
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.
6 han, som vil betale enhver efter hans Gerninger:
Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye:
7 dem, som med Udholdenhed i god Gerning søge Ære og Hæder og Uforkrænkelighed, et evigt Liv; (aiōnios )
bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te; (aiōnios )
8 men over dem, som søge deres eget og ikke lyde Sandheden, men adlyde Uretfærdigheden, skal der komme Vrede og Harme.
kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe.
9 Trængsel og Angest over hvert Menneskes Sjæl, som øver det onde, baade en Jødes først og en Grækers;
Minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe: liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki.
10 men Ære og Hæder og Fred over hver den, som gør det gode, baade en Jøde først og en Græker!
Kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka bolamu: liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki;
11 Thi der er ikke Persons Anseelse hos Gud.
pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
12 Thi alle de, som have syndet uden Loven, de skulle ogsaa fortabes uden Loven; og alle de, som have syndet under Loven, de skulle dømmes ved Loven;
Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko bakokufa na kozanga mpe Mobeko. Nzokande bato oyo basalaki masumu, wana basengeli kotosa Mobeko, bakosambisama kolanda Mobeko.
13 thi ikke Lovens Hørere ere retfærdige for Gud, men Lovens Gørere skulle retfærdiggøres —
Pamba te ezali te bato oyo bayokaka Mobeko nde bazali sembo na miso na Nzambe, kasi ezali ba-oyo batosaka Mobeko yango nde bakotangama lokola bato ya sembo.
14 thi naar Hedninger, som ikke have Loven, af Naturen gøre, hvad Loven kræver, da ere disse, uden at have Loven, sig selv en Lov;
Soki Bapagano oyo bayebi Mobeko te bazali kosala na ndenge na bango moko makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko atako bazali na Mobeko yango te.
15 de vise jo Lovens Gerning skreven i deres Hjerter, idet deres Samvittighed vidner med, og Tankerne indbyrdes anklage eller ogsaa forsvare hverandre —
Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka.
16 paa den Dag, da Gud vil dømme Menneskenes skjulte Færd ifølge mit Evangelium ved Jesus Kristus.
Nyonso wana ekomonana polele, na mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.
17 Men naar du kalder dig Jøde og forlader dig trygt paa Loven og roser dig af Gud
Boye, yo moto oyo omibengaka Moyuda, otiaka elikya na yo kati na Mobeko, omikumisaka mpo na Nzambe,
18 og kender hans Villie og værdsætter de forskellige Ting, idet du undervises af Loven,
oyebi mokano ya Nzambe mpe oyebi kososola makambo oyo eleki malamu, pamba te Mobeko eteya yo.
19 og trøster dig til at være blindes Vejleder, et Lys for dem, som ere i Mørke,
Ondimisami solo ete ozali motambolisi ya bakufi miso, pole ya bato oyo bayengaka-yengaka kati na molili,
20 uforstandiges Opdrager, umyndiges Lærer, idet du i Loven har Udtrykket for Erkendelsen og Sandheden, —
molakisi ya bazoba, moteyi ya bana mike, pamba te ozwaka kati na Mobeko boyebi nyonso mpe bosolo.
21 du altsaa, som lærer andre, du lærer ikke dig selv! Du, som prædiker, at man ikke maa stjæle, du stjæler!
Yo moto oyo oteyaka bato mosusu, boni, yo moko omiteyaka te? Yo oyo oteyaka bato mosusu ete bayiba te, boni, oyibaka?
22 Du, som siger, at man ikke maa bedrive Hor, du bedriver Hor! Du, som føler Afsky for Afguderne, du øver Tempelran!
Yo oyo olobaka na bato ete basala ekobo te, boni, osalaka ekobo? Yo oyo omipesaka te na banzambe ya bikeko, boni, ozwaka na makasi biloko kati na batempelo?
23 Du, som roser dig af Loven, du vanærer Gud ved Overtrædelse af Loven!
Yo oyo omikumisaka mpo na Mobeko, boni, ozali kobebisa lokumu ya Nzambe na kobuka Mobeko?
24 Thi „for eders Skyld bespottes Guds Navn iblandt Hedningerne”, som der er skrevet.
Mpo na yango, kolanda ndenge ekomama: « Likolo na bino, Kombo ya Nzambe ezali kofingama kati na Bapagano. »
25 Thi vel gavner Omskærelse, om du holder Loven; men er du Lovens Overtræder, da er din Omskærelse bleven til Forhud.
Kokatama ngenga ezali na tina soki ozali kotosa Mobeko; kasi soki obuki Mobeko, okomi lokola okatama na yo ngenga te.
26 Dersom nu Forhuden holder Lovens Forskrifter, vil da ikke hans Forhud blive regnet som Omskærelse?
Kasi soki moto oyo akatisa ngenga te azali kotosa malako ya sembo ya Mobeko, boni, akotangama te lokola moto akatama ngenga?
27 Og naar den af Natur uomskaarne opfylder Loven, skal han dømme dig, som med Bogstav og Omskærelse er Lovens Overtræder.
Moto oyo akatisa ngenga te kasi atosaka Mobeko akosambisa yo oyo obukaka Mobeko atako ozali na Makomi ya Mobeko mpe okatisa ngenga.
28 Thi ikke den er Jøde, som er det i det udvortes, ej heller er det Omskærelse, som sker i det udvortes, i Kød;
Pamba te ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto Moyuda, mpe ezali te elembo oyo emonanaka na nzoto nde esalaka kokatama ngenga.
29 men den, som indvortes er Jøde, og Hjertets Omskærelse i Aand, ikke i Bogstav — hans Ros er ikke af Mennesker, men af Gud.
Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.