< Žalmy 113 >

1 Halelujah. Chvalte služebníci Hospodinovi, chvalte jméno Hospodinovo.
Bokumisa Yawe! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye; bokumisa Yawe!
2 Budiž jméno Hospodinovo požehnáno od tohoto času až na věky.
Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela!
3 Od východu slunce až do západu jeho chváleno buď jméno Hospodinovo.
Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama!
4 Vyvýšenť jest nade všecky národy Hospodin, a nad nebesa sláva jeho.
Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.
5 Kdo jest rovný Hospodinu Bohu našemu, kterýž vysoko bydlí?
Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo?
6 Kterýž snižuje se, aby všecko spatřoval, což jest na nebi i na zemi.
Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili.
7 Vyzdvihuje z prachu nuzného, a z hnoje vyvyšuje chudého,
Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola
8 Aby jej posadil s knížaty, s knížaty lidu svého.
mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye.
9 Kterýž vzdělává neplodnou v čeled, a matku veselící se z dítek. Halelujah.
Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe!

< Žalmy 113 >