< Filipským 3 >
1 Dále pak, bratří moji, radujte se v Pánu. Jednostejných věcí vám psáti mně se jistě nestýště, vám pak to bezpečné jest.
Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino.
2 Vizte psy, vizte zlé dělníky, vizte roztržku.
Bosala keba na bambwa, na bato mabe mpe na bato oyo batindikaka bino na kokatisa ngenga!
3 Nebo myť jsme obřízka, kteříž duchem sloužíme Bohu, a chlubíme se v Kristu Ježíši, a nedoufáme v těle,
Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,
4 Ačkoli i já mohl bych doufati v těle. Zdá-liť se komu jinému, že by mohl doufati v těle, já mnohem více,
atako ngai mpe nakoki na ngai kotia elikya na nzoto. Soki moto moko akanisi ete akoki kotia elikya na nzoto, asengeli koyeba ete ngai nakoki kutu kotia elikya yango koleka ye;
5 Obřezán jsa osmého dne, jsa z rodu Izraelského, pokolení Beniaminova, Žid z Židů, podle zákona farizeus,
pamba te bakatisaki ngai ngenga na mokolo ya mwambe, nazali penza moto ya Isalaele kati na libota ya Benjame, mpe nazali Mo-Ebre oyo abotama na baboti oyo bazali mpe Ba-Ebre. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo;
6 A z strany horlivosti protivník církve, z strany pak spravedlnosti zákonní jsa bez úhony.
mpo na oyo etali molende, nanyokolaki Lingomba; mpo na oyo etali bosembo oyo bato balukaka na nzela ya Mibeko, nazalaki moto azanga pamela.
7 Ale to, což mi bylo jako zisk, položil jsem sobě pro Krista za škodu.
Kasi makambo oyo nazalaki komona ete ezali na tina mpo na ngai, nakomi sik’oyo komona yango pamba mpo na Klisto.
8 Nýbrž i všecky věci pokládám škodou býti pro vyvýšenost známosti Krista Ježíše Pána mého, pro nějž jsem to všecko ztratil, a mám to jako za smetí, jedné abych Krista získal,
Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene: koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto
9 A v něm nalezen byl nemající své spravedlnosti, kteráž jest z Zákona, ale tu, kteráž jest z víry Kristovy, spravedlnost, kterážto jest z Boha a u víře záleží,
mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto: Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.
10 Abych tak poznal jej, a divnou moc vzkříšení jeho, a společnost utrpení jeho, připodobňuje se k smrti jeho,
Posa monene ya motema na ngai ezali: koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye
11 Zda bych tak přišel k vzkříšení z mrtvých.
na elikya ete ngai mpe nakosekwa kati na bakufi.
12 Ne že bych již dosáhl, aneb již dokonalým byl, ale snažně běžím, zda bych i dostihnouti mohl, načež uchvácen jsem od Krista Ježíše.
Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.
13 Bratří, jáť nemám za to, že bych již dosáhl.
Bandeko, nazali kokanisa te ete nasili kozwa yango; kasi nasalaka likambo moko: nabosanaka makambo nyonso oyo esili koleka, mpe namipesaka mpo na makambo oyo ezali liboso.
14 Ale to jedno činím, na ty věci, kteréž jsou za mnou, zapomínaje, k těm pak, kteréž jsou přede mnou, úsilně chvátaje, k cíli běžím, k odplatě svrchovaného povolání Božího v Kristu Ježíši.
Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto.
15 Protož kteřížkoli jsme dokonalí, to smýšlejme. A pakli v čem jinak smyslíte, i toť vám Bůh zjeví.
Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.
16 Ale k čemuž jsme již přišli, v tom při jednostejném zůstávejme pravidle a jednostejně smysleme.
Nzokande, na esika oyo tosili kokoma, totambola nzela moko.
17 Spolunásledovníci moji buďte, bratří, a šetřte těch, kteříž tak chodí, jakož máte příklad na nás.
Bandeko, bino nyonso bolanda ndakisa na ngai mpe bomekola ezaleli ya bato oyo bazali kotambola lokola biso.
18 Neboť mnozí chodí, o nichž jsem častokrát pravil vám a nyní s pláčem pravím, žeť jsou nepřátelé kříže Kristova,
Pamba te ndenge nazalaki koyebisa bino yango mbala na mbala mpe, sik’oyo, nazali lisusu koyebisa bino yango na kolela, bato mingi bazali kotambola lokola banguna ya ekulusu ya Klisto.
19 Jichžto konec jest zahynutí, jejichžto bůh jest břicho, a sláva jejich v mrzkostech jejich, kteříž o zemské věci stojí.
Suka na bango ezali libebi; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.
20 Ale naše měšťanství jestiť v nebesích, odkudž i Spasitele očekáváme Pána Jezukrista,
Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.
21 Kterýž promění to tělo naše ponížené, tak aby bylo podobné k tělu slávy jeho, podle mocnosti té, kteroužto on mocen jest i všecky věci podmaniti sobě.
Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.