< Matouš 16 >

1 I přistoupili k němu farizeové a saduceové, a pokoušejíce, prosili ho, aby jim znamení s nebe ukázal.
Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.
2 On pak odpovídaje, řekl jim: Když bývá večer, říkáte: Jasno bude, nebo se červená nebe.
Yesu azongiselaki bango: — Na pokwa, bolobaka: « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane! »
3 A ráno: Dnes bude nečas, nebo se červená zasmušilé nebe. Pokrytci, způsob zajisté nebe rozsouditi umíte, znamení pak časů nemůžete souditi?
Mpe na tongo, bolobaka: « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango!
4 Národ zlý a cizoložný znamení hledá, ale znamení jemu nebude dáno, než toliko znamení Jonáše proroka. A opustiv je, odšel.
Oh bato ya ekeke oyo! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.
5 A přeplavivše se učedlníci jeho přes moře, zapomenuli vzíti chleba.
Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa.
6 Ježíš pak řekl jim: Hleďte a varujte se kvasu farizejského a saducejského.
Yesu alobaki na bango: — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo!
7 Oni pak rozjímali mezi sebou, řkouce: Nevzali jsme chleba.
Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango: — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te!
8 A znaje to Ježíš, řekl jim: Co to rozjímáte mezi sebou, ó malé víry, že jste chlebů nevzali?
Yesu asosolaki makanisi na bango; alobaki: — Bato ya kondima moke! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te! Mpo na nini?
9 Ještě-liž nerozumíte, ani pamatujete na pět chlebů, jimiž nasyceno bylo pět tisíců lidu, a kolik jste košů drobtů sebrali?
Boni, bozwi kaka bososoli nanu te? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato?
10 Ani na sedm chlebů, jimiž nasyceno bylo čtyři tísíce lidí, a kolik jste košů drobtů sebrali?
Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato?
11 I kterakž pak nerozumíte, že ne o chlebu mluvil jsem vám, pravě: Varujte se od kvasu farizejského a saducejského?
Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino: bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo?
12 Tedy srozuměli, že neřekl, aby se varovali od kvasu chleba, ale od učení farizeů a saduceů.
Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.
13 Přišed pak Ježíš do krajin Cesaree Filipovy, otázal se učedlníků svých, řka: Kým mne praví lidé býti, mne Syna člověka?
Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye: — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani?
14 A oni řekli: Někteří Janem Křtitelem, a jiní Eliášem, jiní pak Jeremiášem, aneb jedním z proroků.
Bazongisaki: — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
15 I dí jim: Vy pak kým mne býti pravíte?
Yesu atunaki bango lisusu: — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani?
16 I odpověděv Šimon Petr, řekl: Ty jsi Kristus, Syn Boha živého.
Simona Petelo azongisaki: — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
17 A odpovídaje Ježíš, řekl mu: Blahoslavený jsi Šimone, synu Jonášův; nebo tělo a krev nezjevilo tobě toho, ale Otec můj, kterýž jest v nebesích.
Yesu alobaki na ye: — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
18 I jáť pravím tobě, že jsi ty Petr, a na téť skále vzdělám církev svou, a brány pekelné nepřemohou jí. (Hadēs g86)
Mpe Ngai, nazali koloba na yo: Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te. (Hadēs g86)
19 A tobě dám klíče království nebeského. A což bys koli svázal na zemi, budeť svázáno i na nebi; a což bys koli rozvázal na zemi, budeť rozvázáno i na nebi.
Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
20 Tedy přikázal učedlníkům svým, aby žádnému nepravili, že by on byl ten Ježíš Kristus.
Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.
21 A od té chvíle počal Ježíš oznamovati učedlníkům svým, že musí jíti do Jeruzaléma, a mnoho trpěti od starších a předních kněží a od zákonníků, a zabit býti, a třetího dne z mrtvých vstáti.
Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
22 I odved ho Petr na stranu, počal mu přimlouvati, řka: Odstup to od tebe, Pane, nestaneť se tobě toho.
Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye: — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana! Ekokomela Yo te!
23 Kterýžto obrátiv se, řekl Petrovi: Jdiž za mnou, satane, ku pohoršení jsi mi; nebo nechápáš těch věcí, kteréž jsou Boží, ale kteréž jsou lidské.
Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo: — Mosika na Ngai, Satana! Ozali epekiselo mpo na Ngai! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
24 Tedy řekl Ježíš učedlníkům svým: Chce-li kdo za mnou přijíti, zapřiž sebe sám, a vezmi kříž svůj, a následujž mne.
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
25 Nebo kdož by chtěl duši svou zachovati, ztratíť ji; kdož by pak ztratil duši svou pro mne, nalezneť ji.
Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.
26 Nebo co jest platno člověku, by pak všecken svět získal, a své duši uškodil? Aneb kterou dá člověk odměnu za duši svou?
Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye?
27 Syn zajisté člověka přijde v slávě Otce svého s anděly svými, a tehdážť odplatí jednomu každému podle skutků jeho.
Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.
28 Amen pravím vám: Jsou někteří z stojících tuto, kteříž neokusí smrti, až i uzří Syna člověka, přicházejícího v království svém.
Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.

< Matouš 16 >