< Marek 16 >
1 A když pominula sobota, Maria Magdaléna a Maria Jakubova a Salome nakoupily vonných věcí, aby přijdouce, pomazaly Ježíše.
Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te.
2 A velmi ráno vyšedše první den po sobotě, přišly k hrobu, an již slunce vzešlo.
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana moyi ebandi kobima, bakendeki na kunda.
3 I pravily vespolek: Kdo nám odvalí kámen ode dveří hrobových?
Bazalaki kotunana kati na bango: — Nani akotindikela biso libanga mpo ete elongwa na ekotelo ya kunda?
4 (A vzhlédše, uzřely odvalený kámen.) Byl zajisté veliký velmi.
Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza.
5 A všedše do hrobu, uzřely mládence, an sedí na pravici, oděného rouchem bílým. I ulekly se.
Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe; somo ekangaki bango.
6 Kterýžto řekl jim: Nebojte se. Ježíše hledáte Nazaretského ukřižovaného. Vstalť jest, neníť ho tuto; aj, místo, kdež jej byli položili.
Kasi alobaki na bango: — Bobanga te! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.
7 Ale jděte, povězte učedlníkům jeho i Petrovi, žeť vás předejde do Galilee. Tam jej uzříte, jakož jest pověděl vám.
Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu: « Akei liboso na bino, na Galile; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. »
8 A ony vyšedše rychle, utekly od hrobu; nebo přišel na ně strach a hrůza. A aniž komu co řekly, nebo se bály.
Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
9 (note: The most reliable and earliest manuscripts do not include Mark 16:9-20.) Vstav pak Ježíš z mrtvých ráno v neděli, ukázal se nejprv Mariji Magdaléně, z nížto byl vyvrhl sedm ďáblů.
(note: The most reliable and earliest manuscripts do not include Mark 16:9-20.) Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo.
10 Ona pak šedši, zvěstovala těm, kteříž s ním bývali, lkajícím a plačícím.
Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela.
11 A oni slyšavše, že by živ byl a vidín od ní, nevěřili.
Kasi tango bayokaki ye koloba: « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te.
12 Potom pak dvěma z nich jdoucím ukázal se v jiné způsobě, když šli přes pole.
Sima na yango, Yesu abimelaki mibale kati na bango na lolenge mosusu, wana bazalaki kokende na mboka.
13 A ti šedše, pověděli jiným. Ani těm nevěřili.
Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.
14 Nejposléze sedícím spolu jedenácti ukázal se, a trestal nedověru jejich a tvrdost srdce, že těm, kteříž jej viděli vzkříšeného, nevěřili.
Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.
15 A řekl jim: Jdouce po všem světě, kažte evangelium všemu stvoření.
Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.
16 Kdož uvěří a pokřtí se, spasen bude; kdož pak neuvěří, budeť zatracen.
Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.
17 Znamení pak ti, kteříž uvěří, tato míti budou: Ve jménu mém ďábly budou vymítati, jazyky novými mluviti.
Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima: na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe; bakoloba nkota ya sika,
18 Hady bráti; a jestliže by co jedovatého pili, neuškodíť jim; na nemocné ruce vzkládati budou, a dobře se míti budou.
bakokanga banyoka na maboko na bango; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.
19 Když pak jim odmluvil Pán, vzhůru vzat jest do nebe, a sedí na pravici Boží.
Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
20 A oni šedše, kázali všudy, a Pán jim pomáhal, a slov jejich potvrzoval činěním divů.
Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.