< 1 Korintským 12 >
1 O duchovních pak dařích, bratří, nechci, abyste nevěděli.
Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi na tina na makambo oyo etali makabo ya Molimo.
2 Víte, že jste byli pohané, kteříž k modlám němým, jakž jste bývali vedeni, tak jste chodili.
Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.
3 Protož známoť vám činím, že žádný v Duchu Božím mluvě, nezlořečí Pánu Ježíši, a žádný nemůže říci Pán Ježíš, jediné v Duchu svatém.
Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba: « Tika ete Yesu alakelama mabe! » Mpe moto moko te akoki koloba: « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.
4 Rozdílníť pak darové jsou, ale tentýž Duch,
Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko.
5 A rozdílná jsou přisluhování, ale tentýž Pán,
Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko.
6 A rozdílné jsou moci, ale tentýž Bůh, jenžto působí všecko ve všech.
Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.
7 Jednomu pak každému dáno bývá zjevení Ducha k užitku.
Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.
8 Nebo někomu dána bývá skrze Ducha řeč moudrosti, jinému pak řeč umění podle téhož Ducha,
Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya; epai na mosusu, liloba ya boyebi;
9 Jinému víra v témž Duchu, jinému darové uzdravování v jednostejném Duchu,
epai na mosusu kondima; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli;
10 Někomu divů činění, jinému proroctví, jinému rozeznání duchů, jinému rozličnost jazyků, jinému vykládání jazyků.
epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa; epai na mosusu, likabo ya kosakola; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.
11 Ale to vše působí jeden a týž Duch, rozděluje jednomu každému obzvláštně, jakž ráčí.
Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.
12 Nebo jakož tělo jedno jest a mnoho má údů, ale všickni ti jednoho těla údové, mnozí jsouce, však jedno tělo jsou: tak i Kristus.
Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.
13 Skrze jednoho zajisté Ducha my všickni v jedno tělo pokřtěni jsme, buďto Židé, buďto Řekové, buďto služebníci, nebo svobodní, a všickni v jeden duch zapojeni jsme.
Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko: ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.
14 Nebo tělo není jeden úd, ale mnozí.
Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.
15 Dí-li noha: Poněvadž nejsem rukou, nejsem z těla, zdaliž proto není z těla?
Soki lokolo elobi: « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo?
16 A dí-li ucho: Když nejsem oko, nejsem z těla, zdaliž proto není z těla?
Soki mpe litoyi elobi: « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo?
17 Jestliže všecko tělo jest oko, kde pak bude sluch? Pakli všecko tělo jest sluch, kde povonění?
Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini?
18 Ale zřídil Bůh údy jeden každý z nich v těle, tak jakž jest on chtěl.
Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.
19 Nebo kdyby byli všickni údové jeden úd, kde by bylo tělo?
Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto?
20 Ale nyní mnozí údové jsou, však jedno tělo.
Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko.
21 A tak nemůžť oko říci ruce: Nepotřebí mi tebe, anebo opět hlava nohám: Nepotřebuji vás.
Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko: « Nazali na posa na yo te; » moto mpe ekoki te koloba na makolo: « Nazali na posa na bino te. »
22 Nýbrž mnohem více údové, kteříž se zdadí nejmdlejší v těle býti, potřební jsou.
Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi;
23 A kteréž máme za nejméně ctihodné údy v těle, ty větší ctí přistíráme; a nezdobní údové naši hojnější ozdobu mají,
biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu,
24 Ozdobní pak údové naši toho nepotřebují. Ale Bůh tak způsobil tělo, poslednějšímu dav hojnější poctu,
wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu:
25 Aby nebyla nesvornost v těle, ale aby údové jedni o druhé vespolek pečovali
asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka.
26 A protož jestliže trpí co jeden úd, spolu s ním trpí všickni údové; pakli jest v slávě jeden úd, radují se spolu s ním všickni údové.
Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.
27 Vy pak jste tělo Kristovo, a údové z částky.
Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.
28 A některé zajisté postavil Bůh v církvi nejprv apoštoly, druhé proroky, třetí učitele, potom moci, potom ty, kteří mají dary uzdravování, pomocníky, správce jiných, rozličnost jazyků mající.
Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki: ya liboso, bantoma; ya mibale, basakoli; ya misato, balakisi; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.
29 Zdaliž jsou všickni apoštolé? Zdali všickni proroci? Zdali všickni učitelé? Zdali všickni divy činí?
Boni, bango nyonso bazali bantoma? Bango nyonso bazali basakoli? Bango nyonso bazali balakisi? Bango nyonso basalaka bikamwa?
30 Zdali všickni mají dary k uzdravování? Zdali všickni jazyky rozličnými mluví? Zdali všickni vykládají?
Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge? Bango nyonso balimbolaka nkota?
31 Snažujtež se pak dojíti darů lepších, a ještěť vyšší cestu vám ukáži.
Bozala na posa makasi ya kozala na makabo oyo eleki na monene. Mpo na yango, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.