< Marek 5 >
1 Tedy přeplavili se přes moře do krajiny Gadarenských.
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza,
2 A jakž vyšel z lodí, hned se s ním potkal člověk z hrobů, maje ducha nečistého.
Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye.
3 Kterýž bydlil v hrobích, a aniž ho kdo mohl řetězy svázati,
Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo;
4 Proto že často byv pouty a řetězy okován, polámal řetězy, a pouta roztrhal, a žádný nemohl ho skrotiti.
pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye.
5 A vždycky ve dne i v noci na horách a v hrobích byl, křiče a tepa se kamením.
Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
6 Uzřev pak Ježíše zdaleka, běžel a poklonil se jemu,
Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye
7 A křiče hlasem velikým, řekl: Co jest tobě do mne, Ježíši, Synu Boha nejvyššího? Zaklínám tě skrze Boha, abys mne netrápil.
mpe agangaki na makasi nyonso: — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te!
8 (Nebo pravil jemu: Vyjdiž, duchu nečistý, z člověka tohoto.)
Pamba te Yesu alobaki na molimo yango: « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo! »
9 I otázal se ho: Jakť říkají? A on odpovídaje, řekl: Množství jméno mé jest, nebo jest nás mnoho.
Yesu atunaki ye: — Kombo na yo nani? Azongisaki: — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele!
10 I prosil ho velmi, aby jich nevyháněl z té krajiny.
Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana.
11 Bylo pak tu při horách stádo vepřů veliké pasoucích se.
Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
12 I prosili ho všickni ti ďáblové, řkouce: Pusť nás do vepřů, ať do nich vejdeme.
Milimo mabe esengaki na Yesu: « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
13 I povolil jim hned Ježíš. A vyšedše duchové nečistí, vešli do těch vepřů. I běželo to stádo s vrchu dolů do moře, (a bylo jich ke dvěma tisícům, ) i ztonuli v moři.
Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
14 Ti pak, kteříž ty vepře pásli, utekli, a oznámili to v městě i ve vsech. I vyšli, aby viděli, co by to bylo, což se stalo.
Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema.
15 I přišli k Ježíšovi, a uzřeli toho, kterýž býval trápen od ďábelství, an sedí, odín jsa, a maje zdravý rozum, toho, kterýž míval množství. I báli se.
Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango.
16 A kteříž to viděli, vypravovali jim, kterak se stalo tomu, kterýž měl ďábelství i o vepřích.
Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu.
17 Tedy počali ho prositi, aby odšel z krajin jejich.
Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.
18 A když vstoupil na lodí, prosil ho ten, kterýž trápen býval od ďábelství, aby s ním byl.
Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.
19 Ježíš pak nedopustil mu, ale řekl jemu: Jdi k svým do domu svého, a zvěstuj jim, kterak veliké věci učinil tobě Pán, a že slitoval se nad tebou.
Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye: « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
20 I odšel, a počal ohlašovati v krajině Desíti měst, kterak veliké věci učinil mu Ježíš. I divili se všickni.
Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli; mpe bato nyonso bakamwaki.
21 A když se přeplavil Ježíš na lodí zase na druhou stranu, sšel se k němu zástup mnohý. A byl u moře.
Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.
22 A aj, přišel jeden z knížat školy, jménem Jairus, a uzřev jej, padl k nohám jeho.
Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye
23 A velmi ho prosil, řka: Dcerka má skonává. Poď, vlož na ni ruce, aby uzdravena byla, a budeť živa.
mpe abondelaki Ye makasi: « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa! Nabondeli yo: yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
24 I šel s ním, a zástup mnohý šel za ním, i tiskl jej.
Boye Yesu akendeki na ye nzela moko; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
25 (Tedy žena jedna, kteráž tok krve měla dvanácte let,
Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale.
26 A mnoho byla trápena od mnohých lékařů, a vynaložila všecken statek svůj, a nic jí bylo neprospělo, ale vždy se hůře měla,
Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata.
27 Uslyšavši o Ježíšovi, přišla v zástupu po zadu, a dotkla se roucha jeho.
Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye,
28 Nebo řekla byla: Dotknu-li se jen roucha jeho, uzdravena budu.
pamba te azalaki komilobela: « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika! »
29 A hned přestal krvotok její, a pocítila na těle, že by uzdravena byla od neduhu svého.
Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.
30 A hned Ježíš poznav sám v sobě, že z něho moc vyšla, obrátiv se v zástupu, řekl: Kdo se dotekl roucha mého?
Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki: — Nani asimbi Ngai na bilamba?
31 I řekli mu učedlníci jeho: Vidíš, že tě zástup tiskne, a pravíš: Kdo se mne dotekl?
Bayekoli na Ye bazongisaki: — Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu: « Nani asimbi Ngai? »
32 I hleděl vůkol, aby ji uzřel, která to učinila.
Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo.
33 Ta pak žena s bázní a s třesením, věduci, co se stalo při ní, přistoupila a padla před ním, a pověděla mu všecku pravdu.
Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.
34 On pak řekl jí: Dcero, víra tvá tě uzdravila, jdiž u pokoji, a buď zproštěna od trápení svého.)
Yesu alobaki na ye: — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo!
35 A když on ještě mluvil, přišli z domu knížete školy, řkouce: Dcera tvá umřela, proč již zaměstknáváš Mistra?
Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye: — Mwana na yo ya mwasi asili kokufa; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi?
36 Ježíš pak, hned jakž uslyšel to, což oni mluvili, řekl knížeti školy: Neboj se, toliko věř.
Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani: — Kobanga te, zala kaka na kondima!
37 I nedal žádnému za sebou jíti, jediné Petrovi, Jakubovi a Janovi, bratru Jakubovu.
Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake.
38 I přišel do domu knížete školy, a viděl tam hluk, ano plačí a kvílí velmi.
Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.
39 I všed tam, řekl jim: Co se bouříte a plačete? Neumřelať děvečka, ale spí.
Akotaki mpe alobaki na bango: — Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso? Mpo na nini bozali kolela? Mwana akufi te; alali nde pongi!
40 I posmívali se jemu. On pak vyhnav všecky, pojal otce a matku děvečky, a ty, kteříž s ním byli, i všel tam, kdež děvečka ležela.
Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki.
41 A vzav ruku děvečky, řekl jí: Talitha kumi. Což se vykládá: Děvečko, (toběť pravím, ) vstaň.
Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye: « Talita kumi! » Elingi koloba: Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema!
42 A hned vstala děvečka, a chodila; nebo byla ve dvanácti letech. I zděsili se divením převelikým.
Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza.
43 A přikázal jim pilně, aby žádný o tom nezvěděl. I rozkázal jí dáti jísti.
Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei.