< Jan 5 >

1 Potom byl svátek Židovský, i šel Ježíš do Jeruzaléma.
Sima na yango, Yesu akendeki na Yelusalemi mpo na feti moko ya Bayuda.
2 Byl pak v Jeruzalémě rybník bravný, kterýž slove Židovsky Bethesda, patero přístřeší maje.
Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.
3 Kdež leželo množství veliké neduživých, slepých, kulhavých, suchých, očekávajících hnutí vody.
Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango: bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana,
4 Nebo anděl jistým časem sstupoval do rybníka, a kormoutil vodu. Protož kdož nejprvé sstoupil po tom zkormoucení vody, uzdraven býval, od kterékoli nemoci trápen byl.
pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
5 I byl tu člověk jeden, kterýž osm a třidceti let nemocen byl.
Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.
6 Toho uzřev Ježíš ležícího, a poznav, že jest již dávno nemocen, dí jemu: Chceš-li zdráv býti?
Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye: — Olingi kobika?
7 Odpověděl mu ten nemocný: Pane, nemám člověka, kterýž by, když se zkormoutí voda, uvrhl mne do rybníka, ale když já jdu, jiný přede mnou sstupuje.
Mobeli azongiselaki Ye: — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.
8 Dí jemu Ježíš: Vstaň, vezmi lože své a choď.
Yesu alobaki na ye: — Telema, kamata etoko na yo mpe tambola.
9 A hned zdráv jest učiněn člověk ten, a vzav lože své, i chodil. Byla pak sobota v ten den.
Kaka na tango yango, moto yango abikaki; akamataki etoko na ye mpe akomaki kotambola. Nzokande likambo yango esalemaki na mokolo ya Saba.
10 Tedy řekli Židé tomu uzdravenému: Sobota jest, nesluší tobě lože nositi.
Boye, bakambi ya Bayuda balobaki na moto oyo abikisamaki: — Lelo ezali mokolo ya Saba; ozali na ndingisa te ya komema etoko oyo.
11 Odpověděl jim: Ten, kterýž mne uzdravil, onť mi řekl: Vezmi lože své a choď.
Azongiselaki bango: — Moto oyo abikisi ngai alobi na ngai: « Kamata etoko na yo mpe tambola. »
12 I otázali se ho: Kdo jest ten člověk, kterýž tobě řekl: Vezmi lože své a choď?
Batunaki ye lisusu: — Nani alobi na yo bongo?
13 Ten pak uzdravený nevěděl, kdo by byl. Nebo Ježíš byl poodšel od zástupu shromážděného na tom místě.
Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.
14 Potom pak nalezl jej Ježíš v chrámě, a řekl jemu: Aj, zdráv jsi učiněn; nikoli víc nehřeš, aťby se něco horšího nepřihodilo.
Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye: — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
15 Odšel ten člověk, a pověděl Židům, že by Ježíš byl ten, kterýž ho zdravého učinil.
Moto yango akendeki koyebisa bakambi ya Bayuda ete ezali Yesu nde abikisaki ye.
16 A protož protivili se Židé Ježíšovi, a hledali ho zabiti, že to učinil v sobotu.
Lokola Yesu azalaki kosala makambo wana na mokolo ya Saba, bakambi ya Bayuda bakomaki kofunda Ye.
17 Ježíš pak odpověděl jim: Otec můj až dosavad dělá, i jáť dělám.
Kasi Yesu alobaki na bango: « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »
18 Tedy Židé ještě víc proto hledali ho zamordovati, že by netoliko rušil sobotu, ale že Otce svého pravil býti Boha, rovného se čině Bohu.
Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.
19 I odpověděl Ježíš a řekl jim: Amen, amen pravím vám: Nemůžeť Syn sám od sebe nic činiti, jediné což vidí, an Otec činí. Nebo cožkoli on činí, toť i Syn též podobně činí.
Yesu alobaki na bango lisusu: Nazali koloba na bino penza ya solo: Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.
20 Otec zajisté miluje Syna, a ukazuje mu všecko, což sám činí; a větší nad to ukáže jemu skutky, abyste vy se divili.
Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa.
21 Nebo jakož Otec křísí mrtvé a obživuje, tak i Syn, kteréž chce, obživuje.
Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi.
22 Aniž zajisté Otec soudí koho, ale všecken soud dal Synu.
Lisusu, Tata asambisaka bato te; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana,
23 Aby všickni ctili Syna, tak jakž Otce ctí. Kdo nectí Syna, nectí ani Otce, kterýž ho poslal.
mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.
24 Amen, amen pravím vám: Že kdož slovo mé slyší, a věří tomu, kterýž mne poslal, máť život věčný, a na soud nepřijde, ale přešelť jest z smrti do života. (aiōnios g166)
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi. (aiōnios g166)
25 Amen, amen pravím vám: Že přijde hodina, a nyníť jest, když mrtví uslyší hlas Syna Božího, a kteříž uslyší, živi budou.
Nazali koloba na bino penza ya solo: tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi;
26 Nebo jakož Otec má život sám v sobě, tak dal i Synu, aby měl život v samém sobě.
pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi;
27 A dal jemu moc i soud činiti, nebo Syn člověka jest.
mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto.
28 Nedivtež se tomu; neboť přijde hodina, v kterouž všickni, kteříž v hrobích jsou, uslyší hlas jeho.
Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye
29 A půjdou ti, kteříž dobré věci činili, na vzkříšení života, ale ti, kteříž zlé věci činili, na vzkříšení soudu.
mpe bakobima longwa kati na yango: ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu.
30 Nemohuť já sám od sebe nic činiti. Jakžť slyším, takť soudím, a soud můj spravedlivý jest. Nebo nehledám vůle své, ale vůle toho, kterýž mne poslal, Otcovy.
Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko: nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
31 Vydám-liť já svědectví sám o sobě, svědectví mé není pravé.
Soki napesi litatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ekozala ya solo te.
32 Jinýť jest, kterýž svědectví vydává o mně, a vím, že pravé jest svědectví, kteréž vydává o mně.
Boye esengeli ete motatoli mosusu apesa yango mpo na Ngai; mpe nayebi ete litatoli oyo akopesa na tina na Ngai ezali ya solo.
33 Vy jste byli poslali k Janovi, a on svědectví vydal pravdě.
Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye atatolaki na tina na bosolo.
34 Ale jáť nepřijímám svědectví od člověka, než totoť pravím, abyste vy spaseni byli.
Ngai, nandimaka litatoli ya moto te; kasi nalobi bongo mpo ete bobika.
35 Onť byl svíce hořící a svítící, vy pak chtěli jste se na čas poradovati v světle jeho.
Solo, Yoane azalaki lokola mwinda oyo bapelisi mpe ezali kongenga. Kasi bino, boponaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.
36 Ale já mám větší svědectví, než Janovo. Nebo skutkové, kteréž mi dal Otec, abych je vykonal, tiť skutkové, kteréž já činím, svědčí o mně, že mne Otec poslal.
Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane: misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
37 A kterýž mne poslal, Otec, onť svědectví vydal o mně, jehož jste vy hlasu nikdy neslyšeli, ani tváři jeho neviděli.
Ye moko, Tata, oyo atindaki Ngai atatolaki mpo na Ngai. Botikala nanu te koyoka mongongo na Ye mpe komona elongi na Ye;
38 A slova jeho nemáte v sobě zůstávajícího. Nebo kteréhož on poslal, tomu vy nevěříte.
mpe liloba na Ye ezali kati na bino te, pamba te bondima te Motindami na Ye.
39 Ptejte se na písma; nebo vy domníváte se v nich věčný život míti, a tať svědectví vydávají o mně. (aiōnios g166)
Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai, (aiōnios g166)
40 Ale nechcete přijíti ke mně, abyste život měli.
kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.
41 Chvály od lidí nepřijímám.
Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.
42 Ale poznal jsem vás, že milování Božího nemáte v sobě.
Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.
43 Já jsem přišel ve jménu Otce svého, a nepřijímáte mne. Kdyby jiný přišel ve jménu svém, toho přijmete.
Ngai, nayei na Kombo ya Tata na Ngai, kasi boboyi koyamba Ngai! Nzokande, soki moto mosusu ayei na kombo na ye moko, bokoyamba ye.
44 Kterak vy můžete věřiti, chvály jedni od druhých hledajíce, poněvadž chvály, kteráž jest od samého Boha, nehledáte?
Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai?
45 Nedomnívejte se, bychť já na vás žalovati měl před Otcem. Jestiť, kdo by žaloval na vás, Mojžíš, v němž vy naději máte.
Bokanisa te ete Ngai nde nakofunda bino liboso ya Tata na Ngai, ezali Moyize oyo bondimaka nde akofunda bino.
46 Nebo kdybyste věřili Mojžíšovi, věřili byste i mně; neb on o mně psal.
Pamba te, soki penza bozalaki kondima Moyize, bolingaki mpe kondima Ngai; pamba te akomaki na tina na Ngai.
47 Ale poněvadž jeho písmům nevěříte, i kterak slovům mým uvěříte?
Kasi soki bozali kondima ata makomi na ye te, ndenge nini bokondima maloba na Ngai?

< Jan 5 >