< Izaiáš 14 >
1 Nebo slituje se Hospodin nad Jákobem, a vyvolí zase Izraele, a dá jim odpočinutí v zemi jejich; a připojí se k nim cizozemec, a přídržeti se budou domu Jákobova.
Yawe akoyokela Jakobi mawa, akopona lisusu Isalaele mpe akopemisa bango na mokili na bango; bongo bapaya bakosangana na bango mpe bakobakisama na ndako ya Jakobi.
2 Nebo pojmou ty národy, a přivedou je k místu svému, i uvedou je v dědictví dům Izraelský v zemi Hospodinově, za služebníky a za děvky; a jímati budou ty, kteříž je zjímali, a panovati budou nad násilníky svými.
Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.
3 I staneť se v ten den, v němž tobě odpočinutí dá Hospodin od těžkosti tvé a strachu tvého, a od poroby těžké, v kterouž jsi byl podroben,
Na mokolo oyo Yawe akopesa yo bopemi na mosala na yo, na komitungisa na yo mpe na misala makasi oyo bapesaki yo,
4 Že uživeš přísloví tohoto o králi Babylonském, a řekneš: Aj, jak přestal násilník! Přestalo dychtění po zlatě.
okoyemba nzembo oyo mpo na kotiola mokonzi ya Babiloni; okoloba: « Ndenge nini monyokoli akomi na suka? Ndenge nini penza lolendo na ye esili?
5 Potřískal Hospodin hůl bezbožných, prut panujících,
Yawe abuki fimbu ya moto mabe, lingenda ya bokonzi ya bakambi,
6 Mrskajícího lidi v prchlivosti mrskáním ustavičným, panujícího v hněvě nad národy, kteříž ssužováni bývali bez lítosti.
oyo azalaki kokweyisa bato na kanda mpe kobeta bango na kolemba te, oyo azalaki kokonza bikolo na kanda makasi mpe konyokola bango na mawa te.
7 Odpočívá, jest v pokoji všecka země, zvučně prozpěvují.
Mikili nyonso ezwi bopemi mpe kimia, ekomi koganga na esengo.
8 I jedloví veselí se nad tebou, i cedroví Libánské, řkouce: Jakž jsi klesl, nepovstal, kdo by nás podtínal.
Banzete ya sipele ezali kosepela mpo na kokweya na yo, mpe banzete ya sedele ya Libani ezali koloba: ‹ Wuta tango okweyaki na se, moto moko te akweyisaka lisusu biso. ›
9 I peklo zespod zbouřilo se pro tebe, k vyjití vstříc přicházejícímu tobě vzbudilo pro tě mrtvé, všecka knížata země; kázalo vyvstati z stolic jejich i všechněm králům národů. (Sheol )
Mokili ya bakufi, kuna na se, eningani na sango ya koya na yo, elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo. (Sheol )
10 Všickni tito odpovídajíce, mluví tobě: Což ty také jsi zemdlen jako i my, a nám podobný učiněn?
Bango nyonso bakozwa maloba mpe bakoloba na yo: ‹ Yo mpe okomi moto ya bolembu lokola biso, okokani na biso! ›
11 Svrženať jest do pekla pýcha tvá, i zvuk hudebných nástrojů tvých; moli tobě podestláno, a červi tě přikrývají. (Sheol )
Lokumu na yo nyonso ekiti kino na mokili ya bakufi, elongo na makelele ya mandanda na yo. Nkusu etondi na se na yo lokola mbeto, mpe mitsopi ezipi yo lokola elamba. (Sheol )
12 Jakž to, že jsi spadl s nebe, ó lucifeře v jitře vycházející? Poražen jsi až na zem, ještos zemdlíval národy.
Ndenge nini penza okweyi wuta na likolo, oh monzoto oyo engengaka na tongo, mwana mobali ya tongo makasi? Bakweyisi yo penza kino na mabele, yo moto oyo ozalaki kopanza bikolo!
13 Však jsi ty říkával v srdci svém: Vstoupím do nebe, nad hvězdy Boha silného vyvýším stolici svou, a posadím se na hoře shromáždění k straně půlnoční.
Ozalaki komilobela kati na motema: ‹ Nakomata kino na Lola, nakotombola kiti na ngai ya bokonzi kino na likolo ya minzoto ya Nzambe mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, na suka ya mokili ya ngambo ya nor;
14 Vstoupím nad výsosti oblaku, budu rovný Nejvyššímu.
nakomata kino na likolo ya mapata, nakomikomisa lokola Ye-Oyo-Aleki-Likolo. ›
15 A ty pak stržen jsi až do pekla, pryč na stranu do jámy. (Sheol )
Kasi okiti nde na mokili ya bakufi, na se penza ya libulu. (Sheol )
16 Ti, kdož tě uzří, za tebou se ohlédati, a tebe spatřovati budou, říkajíce: To-liž jest ten muž, kterýž nepokojil zemi, a pohyboval královstvími,
Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna: ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo?
17 Obracel jako v pustinu okršlek země, a města jeho bořil, vězňů svých nepropouštěl domů?
Moto oyo azalaki kokomisa mokili esobe, kokweyisa bingumba na yango mpe kotika te ete bakangami na ye bazonga epai na bango? ›
18 Všickni králové národů, což jich koli bylo, pochováni slavně doma jeden každý z nich;
Bakonzi nyonso ya bikolo balalaka na lokumu, moko na moko kati na kunda na ye;
19 Ty pak zavržen jsi od hrobu svého jako ratolest ohyzdná, a roucho zbitých, ukrutně zraněných, kteříž se dostávají do jámy mezi kamení, a jako mrcha pošlapaná.
kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo lokola kaka eloko moko ya nkele, kati na bibembe ya bato oyo baboma, bato oyo batobola bango na mopanga, bongo bakiti kino na libulu ya mabanga lokola bibembe oyo banyata na makolo.
20 Nebudeš k oněmno v pohřbu přiúčastněn, nebo jsi poplénil zemi svou, lid svůj jsi pomordoval; nebudeť připomínáno na věky símě zlostníků.
Okotikala kosangana na bango te kati na kunda, pamba te obebisaki mokili na yo mpe obomaki bato na yo. Bakotikala lisusu kotanga te bakombo ya bakitani ya bato mabe.
21 Připravte se k zmordování synů jeho pro nepravosti otců jejich, aby nepovstali, a dědičně neujali země, a nenaplnili svrchku okršlku zemského městy.
Bobongisa esika mpo na koboma bana na ye ya mibali likolo ya masumu ya batata na bango! Tika ete balamuka lisusu te mpo na kozwa mabele lokola libula mpe kotondisa mokili elongo na bingumba na bango.
22 Nebo povstanu proti nim, praví Hospodin zástupů, a zahladím jméno Babylona i ostatky syna i vnuka, praví Hospodin.
Nakotelemela bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakolongola kombo ya Babiloni mpe nyonso oyo ekotikala, bana mpe bakitani na yango, elobi Yawe.
23 A obrátím jej v dědictví bukačů, a v jezera vod, a vymetu jej pometlem zahynutí, praví Hospodin zástupů.
Nakokomisa yango esika ya potopoto mpe lopango ya bampuku; mpe nakokombola yango na nzela ya ekombelo ya libebi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
24 Přisáhl Hospodin zástupů, řka: Jistě že jakž jsem myslil, tak bude, a jakž jsem uložil, stane se,
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi: « Solo, ndenge kaka nabongisi, ndenge wana mpe ekosalema; makambo oyo nazali na yango na makanisi, yango nde ekokokisama.
25 Že potru Assyrského v zemi své, a na horách svých pošlapám jej, a odejde z nich jho jeho, břímě také jeho s ramene jejich sňato bude.
Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai; ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. »
26 Toť jest ta rada, kteráž zavřína jest o vší té zemi, a to jest ta ruka vztažená proti všechněm těm národům.
Yango nde mokano oyo Yawe asili kozwa mpo na mokili mobimba, mpe yango nde loboko oyo asili kosembola mpo na kotelemela bikolo nyonso.
27 Poněvadž pak Hospodin zástupů usoudil, kdo to tedy zruší? A ruku jeho vztaženou kdo odvrátí?
Pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kozwa mokano; bongo nani akolongola yango? Loboko na Ye esili kosembolama; nani akozongisa yango?
28 Léta kteréhož umřel král Achas, stalo se proroctví toto:
Maloba oyo eyaki na mobu oyo mokonzi Akazi akufaki:
29 Neraduj se všecka ty země Filistinská, že zlámán jest prut toho, kterýž tě mrskal; nebo z plemene hadího vyjde bazališkus, jehož plod bude drak ohnivý létající.
« Bino bato nyonso ya Filisitia, bosepela te ete fimbu oyo ezalaki kobeta bino esili kobukana, pamba te etupa ebimaka na libumu ya nyoka, mpe dalagona oyo epumbwaka ebimaka na libumu ya nyoka mabe.
30 I budou se pásti prvorození chudých, a nuzní bezpečně odpočívati budou; kořen pak tvůj umořím hladem, a ostatky tvé zmorduje.
Ye oyo aleki mobola nde akozwa eloko ya kolia, mpe moto oyo akelela nde akolala na kimia; kasi nakoboma bato na yo na nzala; mpe bato oyo bakobika, bakoboma bango.
31 Kvěl, ó bráno, křič město, již jsi rozplynula se všecka ty země Filistinská; nebo od půlnoci oheň přijde aniž bude, kdo by stranil z obcí jeho.
Oh ekuke, lela makasi! Engumba, ganga makasi! Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda! Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo.
32 Co pak odpovědí poslové národů? To, že Hospodin upevnil Sion, v němž útočiště mají chudí z lidu jeho.
Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »