< Skutky Apoštolů 20 >

1 Když pak přestala ta bouřka, povolav Pavel učedlníků, a požehnav jich, vyšel odtud, aby se bral do Macedonie.
Tango mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendeki na Masedwane.
2 A když prošel ty krajiny, a napomenutí jim učiniv mnohými řečmi, přišel do země Řecké.
Wana azalaki kotambola kati na etuka yango, azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na Grese
3 A pobyv tam za tři měsíce, (kdež Židé učinili jemu zálohy, ) když se měl plaviti do Syrie, umínil navrátiti se skrze Macedonii.
epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalelaki ye likita. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane.
4 I šel s ním Sópater Berienský až do Azie, a z Tessalonicenských Aristarchus a Sekundus a Gáius Derbeus a Timoteus, z Azianských pak Tychikus a Trofimus.
Tala bato oyo bakendeki na ye elongo: Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere; Arisitarke mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika; Gayusi, moto ya Derbe; Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya etuka ya Azia.
5 Ti šedše napřed, dočkali nás v Troadě.
Bango nde bakendeki liboso mpo na kozela biso na Troasi.
6 My pak plavili jsme se po velikonoci z Filippis, a přišli jsme k nim do Troady v pěti dnech, a tu jsme pobyli za sedm dní.
Kasi biso tozwaki masuwa kati na engumba Filipi, sima na feti ya Mapa ezanga levire. Sima na biso kotambola mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi epai wapi tosalaki mikolo sambo.
7 Tedy první den po sobotě, když se učedlníci sešli k lámání chleba, Pavel mluvil k nim, maje nazejtří jíti pryč, i prodlil řečí až do půlnoci.
Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.
8 A bylo mnoho světel na té síni, kdež byli shromážděni.
Tosanganaki kati na shambre ya likolo, oyo ezalaki na minda ebele.
9 Jeden pak mládenec, jménem Eutychus, sedě na okně, jsa obtížen hlubokým snem, když tak dlouho Pavel kázal, spě, spadl s třetího ponebí dolů a vzat jest mrtvý.
Nzokande, elenge mobali moko avandaki na lininisa; kombo na ye ezalaki Etikisi. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi, mpe, mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.
10 I sstoupiv dolů Pavel, zpolehl na něj, a objav jej, řekl: Nermuťtež se, však duše jeho v něm jest.
Polo akitaki, atiaki litoyi na ye na tolo ya Etikisi, akamataki Etikisi na maboko na ye mpe alobaki: — Bobanga te, azali na bomoi.
11 A vstoupiv, lámal chléb a jedl, a kázaní jim učiniv dlouho až do svitání, tak odšel pryč.
Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendeki.
12 I přivedli toho mládence živého, a byli velice potěšeni.
Bongo, bazongisaki ya bomoi, elenge mobali epai na bango, mpe bango nyonso balendisamaki makasi.
13 My pak vstoupivše na lodí, plavili jsme se do Asson, odtud majíce k sobě vzíti Pavla; nebo byl tak poručil, maje sám jíti po zemi.
Tokendeki liboso, mpe tozwaki masuwa oyo ememaki biso na Asosi epai wapi Polo asengelaki komatela na masuwa. Azwaki mokano wana, pamba te alingaki kokende kuna na makolo.
14 A když se k nám připojil v Asson, vzavše jej, přijeli jsme do Mitylénu.
Tango akutanaki na biso na mboka Asosi, amataki na masuwa elongo na biso, mpe tokendeki na Mitilena.
15 A odtud plavíce se, druhý den byli jsme proti Chium, a třetího dne připlavili jsme se k Sámu, a pobyvše v Trogyllí, nazejtří přišli jsme do Milétu.
Longwa wana, tozwaki masuwa mpo na kokende, mpe tokomaki liboso ya Shio, mokolo oyo elandaki. Sima na mokolo moko, tokomaki na Samosi, mpe, mokolo oyo elandaki, tokomaki na Mile.
16 Nebo Pavel byl umínil pominouti Efez, aby se nemeškal v Azii; nebo pospíchal, by možné jemu bylo, aby byl o letnicích v Jeruzalémě.
Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe ya kolekisa tango te na mokili ya Azia, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi mpo ete azala na mokolo ya Pantekoti.
17 Tedy z Milétu poslav do Efezu, povolal k sobě starších církve.
Wuta na Mile, Polo abengisaki bakambi ya Lingomba ya Efeso.
18 Kteříž když přišli k němu, řekl jim: Vy víte od prvního dne, v kterýž přišel jsem do Azie, kterak jsem po všecken ten čas s vámi byl,
Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango: — Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azia.
19 Slouže Pánu se vší pokorou i s mnohými slzami a pokušeními, kteráž na mne přicházela z úkladů Židovských,
Nasalelaki Nkolo lokola mowumbu, na komikitisa nyonso mpe na mpinzoli, kati na komekama makasi mpo ete Bayuda bazalaki kosalela ngai makita.
20 Kterak jsem ničeho nepominul, což by užitečného bylo, abych vám neoznámil, a neučil vás vůbec zjevně i po domích,
Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
21 Svědectví vydávaje i Židům i Řekům o pokání k Bohu, a o víře v Pána našeho Ježíše Krista.
Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.
22 A aj, nyní já sevřín jsa duchem, beru se do Jeruzaléma, nevěda, co mi se v něm má státi,
Boye sik’oyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna.
23 Než že Duch svatý po městech osvědčuje mi, pravě, že vězení a ssoužení mne očekávají.
Eloko moko kaka nayebi: Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota.
24 Však já nic na to nedbám, aniž jest mi tak drahá duše má, jen abych běh svůj s radostí vykonal, a přisluhování, kteréž jsem přijal od Pána Ježíše, k osvědčování evangelium milosti Boží.
Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali: kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai: kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.
25 A aj, já nyní vím, že již více neuzříte tváři mé vy všickni, mezi kterýmiž jsem chodil, káže o království Božím.
Mpe sik’oyo, nayebi ete bokomona elongi ngai lisusu te, bino nyonso oyo nalekaki kati na bino mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe.
26 Protož osvědčujiť vám v dnešní den, žeť jsem čist od krve všech.
Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso,
27 Nebo jsem neobmeškal zvěstovati vám všeliké rady Boží.
pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.
28 Buďtež tedy sebe pilni i všeho stáda, v němž Duch svatý ustanovil vás biskupy, abyste pásli církev Boží, kteréž sobě dobyl svou vlastní krví.
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
29 Nebo já to vím, že po mém odjití vejdou mezi vás vlci hltaví, kteříž nebudou odpouštěti stádu.
Nayebi malamu ete, sima na ngai kokende, bambwa ya zamba ekokota kati na bino mpe ekoyokela etonga mawa te.
30 A z vás samých povstanou muži, kteříž budou mluviti převrácené věci, aby obrátili učedlníky po sobě.
Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.
31 Protož bděte, v paměti majíce, že jsem po tři léta nepřestával dnem i nocí s pláčem napomínati jednoho každého.
Yango wana, bosenzela! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.
32 A již nyní, bratří, poroučím vás Bohu a slovu milosti jeho, kterýž mocen jest vzdělati, a dáti vám dědictví mezi všemi posvěcenými.
Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.
33 Stříbra neb zlata neb roucha nežádal jsem od žádného.
Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko.
34 Nýbrž sami víte, že toho, čehož mi kdy potřebí bylo, i těm, kteříž jsou se mnou, dobývaly ruce tyto.
Bino moko boyebi malamu ete ezali maboko na ngai oyo, nde epesaki ngai biloko oyo nazalaki na bosenga na yango mpo na ngai moko, mpe oyo baninga na ngai bazalaki na bosenga na yango.
35 Vše ukázal jsem vám, že tak pracujíce, musíme snášeti mdlé, a pamatovati na slova Pána Ježíše; nebť on řekl: Blahoslaveněji jest dáti nežli bráti.
Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba: « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »
36 A to pověděv, klekna na kolena svá, modlil se s nimi se všemi.
Sima na Polo koloba bongo, afukamaki mpe asambelaki elongo na bango.
37 I stal se pláč veliký ode všech, a padajíce na hrdlo Pavlovo, líbali jej,
Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze;
38 Rmoutíce se nejvíce nad tím slovem, kteréž řekl, že by již více neměli tváři jeho viděti. I provodili jej až k lodí.
bayokaki mawa mingi koleka mpo alobaki na bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Bongo bakendeki kotika ye kino na masuwa.

< Skutky Apoštolů 20 >