< 2 Korintským 4 >
1 Protož majíce toto přisluhování, jakž jsme milosrdenství došli, neoblevujeme.
Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te;
2 Ale odmítáme ukrývání neslušnosti, nechodíce v chytrosti, aniž se lstivě obírajíce s slovem Božím, ale zjevováním pravdy v příjemnost uvodíce sebe u každého svědomí lidského před oblíčejem Božím.
toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
3 Pakliť zakryté jest evangelium naše, před těmi, kteříž hynou, zakryté jest.
Mpe soki Sango Malamu oyo toteyaka ezali kaka ya kozipama, ezali ya kozipama kati na bato oyo bazali kobunga,
4 V nichž Bůh světa tohoto oslepil mysli, totiž v nevěrných, aby se jim nezasvítilo světlo evangelium slávy Kristovy, kterýž jest obraz Boží. (aiōn )
ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe. (aiōn )
5 Neboť ne sami sebe kážeme, ale Krista Ježíše Pána, sebe pak služebníky vašimi pro Ježíše.
Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.
6 Bůh zajisté, kterýž rozkázal, aby se z temností světlo zablesklo, tenť se osvítil v srdcích našich k osvícení známosti slávy Boží v tváři Ježíše Krista.
Pamba te Nzambe oyo alobaki: « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
7 Mámeť pak poklad tento v nádobách hliněných, aby důstojnost té moci byla Boží, a ne z nás,
Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
8 Když se všech stran úzkost míváme, ale nebýváme cele potlačeni; býváme vrtkáni, ale nebýváme docela zvrtkáni;
Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te;
9 Protivenství trpíme, ale nebýváme opuštěni; býváme opovrženi, ale nehyneme.
tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
10 Vždycky mrtvení Pána Ježíše na těle nosíme, aby i život Ježíšův na těle našem zjeven byl.
Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso.
11 Vždycky zajisté my, kteříž živi jsme, na smrt býváme vydáváni pro Ježíše, aby i život Ježíšův zjeven byl na smrtelném těle našem.
Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.
12 A tak smrt v nás moc provodí, ale v vás život.
Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.
13 Majíce tedy téhož ducha víry, podlé toho, jakž psáno jest: Uvěřil jsem, protož jsem mluvil, i myť věříme, protož i mluvíme,
Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama: « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
14 Vědouce, že ten, kterýž vzkřísil Pána Ježíše, i nás skrze Ježíše vzkřísí, a postaví s vámi.
Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
15 Nebo to všecko děje se pro vás, aby ta přehojná milost skrze díků činění od mnohých rozmohla se k slávě Boží.
Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
16 Protož neoblevujeme, ale ačkoli ten zevnitřní člověk náš ruší se, však ten vnitřní obnovuje se den ode dne.
Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
17 Nebo toto nynější lehoučké ssoužení naše převelmi veliké věčné slávy břímě nám působí, (aiōnios )
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. (aiōnios )
18 Když nepatříme na ty věci, kteréž se vidí, ale na ty, kteréž se nevidí. Nebo ty věci, kteréž se vidí, jsou časné, ale které se nevidí, jsou věčné. (aiōnios )
Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko. (aiōnios )