< 2 Korintským 3 >
1 Začínáme opět sami sebe chváliti? Zdaliž potřebujeme, jako někteří, schvalujících listů k vám, neb od vás k jiným?
Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko? Boni, tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya kopesa bino mikanda ya matatoli to ya kosenga bino mikanda ya matatoli?
2 List náš vy jste, napsaný v srdcích našich, kterýž znají a čtou všickni lidé.
Bino nde bozali mokanda na biso, mokanda oyo ekomama kati na mitema na biso, mokanda oyo bato nyonso bayebi mpe batangaka.
3 Nebo to zjevné jest, že jste list Kristův způsobený skrze přisluhování naše, napsaný ne černidlem, ale Duchem Boha živého, ne na dskách kamenných, ale na dskách srdce masitých.
Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.
4 Doufání pak takové máme skrze Krista k Bohu,
Yango nde elikya oyo tozali na yango kati na Nzambe, na nzela ya Klisto.
5 Ne že bychom dostateční byli mysliti něco sami z sebe, jakožto sami z sebe, ale dostatečnost naše z Boha jest.
Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe.
6 Kterýž i hodné nás učinil služebníky Nového Zákona, ne litery, ale Ducha. Nebo litera zabijí, ale Duch obživuje.
Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.
7 Jestližeť pak přisluhování smrti, literami vyryté na dskách kamenných, bylo slavné, tak že nemohli patřiti synové Izraelští v tvář Mojžíšovu, pro slávu oblíčeje jeho, kteráž pominouti měla,
Sik’oyo, soki lotomo ya kufa, oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga, eyaki na nkembo, na ndenge ete bana ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize likolo ya kongenga ya nkembo na yango, nzokande nkembo yango esengelaki kosila,
8 I kterakž by ovšem přisluhování Ducha nemělo býti slavné?
ndenge nini lotomo ya Molimo eleka na nkembo te?
9 Nebo jestližeť přisluhování pomsty slavné bylo, mnohemť se více přisluhování spravedlnosti rozhojňuje v slávě.
Pamba te, soki lotomo oyo ememelaki bato etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo esalaki ete Nzambe akomisa bato sembo eleka na nkembo te?
10 Nebo to, což oslaveno bylo, aniž oslaveno bylo v té částce, u přirovnání této předůstojné slávy.
Tokoki ata koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene.
11 Nebo jestližeť to pomíjející bylo slavné, mnohemť více to, což zůstává, jestiť slavné.
Mpe soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo ya oyo ekowumelaka seko na seko eleka monene te?
12 Protož majíce takovou naději, mnohé svobody v mluvení užíváme,
Lokola tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na bobangi te;
13 A ne jako Mojžíš kladl zástěru na tvář svou, aby nepatřili synové Izraelští k cíli té věci pomíjející.
tozali te lokola Moyize oyo azalaki kosalela vwale mpo na kozipa elongi na ye, mpo na kopekisa bana ya Isalaele kotala suka ya nkembo oyo esengeli kosila.
14 Pročež ztupeni jsou smyslové jejich. Nebo až do dnes ta zástěra v čítání Starého Zákona zůstává neodkrytá; nebo skrze Krista se odnímá.
Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.
15 Protož až do dnes, když čten bývá Mojžíš, zástěra jest položena na jejich srdci.
Solo, kino na mokolo ya lelo, tango nyonso bana ya Isalaele batangaka mikanda ya Moyize, vwale moko ezipaka mitema na bango.
16 Než jakž by se obrátilo ku Pánu, odňata bude ta zástěra.
Kasi tango nyonso moto abalukaka epai ya Nkolo, vwale yango elongwaka.
17 Nebo Pán jest Duch ten, a kdež jest ten Duch Páně, tu i svoboda.
Sik’oyo, Nkolo azali Molimo; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali.
18 My pak všickni odkrytou tváří slávu Páně jako v zrcadle spatřujíce, v týž obraz proměněni býváme od slávy v slávu, jakožto od Ducha Páně.
Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.