< Rimljanima 11 >
1 Pitam dakle: Zar je Bog odbacio narod svoj? Nipošto? Ta i ja sam Izraelac, iz potomstva Abrahamova, plemena Benjaminova.
Bongo natunaki: Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye? Soki moke te! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.
2 Nije Bog odbacio naroda svojega koga predvidje. Ili zar ne znate što veli Pismo, ono o Iliji - kako se tuži Bogu na Izraela:
Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele:
3 Gospode, proroke tvoje pobiše, žrtvenike tvoje porušiše; ja ostadoh sam i još mi o glavi rade.
— Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki bitumbelo na Yo. Mpe ngai, natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka koboma ngai.
4 Pa što mu veli Božji glas? Ostavih sebi sedam tisuća ljudi koji ne prignuše koljena pred Baalom.
Kasi eyano nini Nzambe azongiselaki ye? — Nabombi bato nkoto sambo mpo na Ngai, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te.
5 Tako dakle i u sadašnje vrijeme postoji Ostatak po milosnom izboru.
Ezali mpe bongo na tango oyo: ezali na mwa ndambo ya bato oyo Nzambe apona na ngolu na Ye.
6 Ako pak po milosti, nije po djelima; inače milost nije više milost!
Nzokande, lokola koponama yango esalemaki na ngolu, elakisi ete ezali likambo ya misala te; soki te, ngolu ezali lisusu ngolu te.
7 Što dakle? Što Izrael ište, to nije postigao, ali izabrani postigoše. Ostali pak otvrdnuše,
Boye toloba lisusu nini? Eloko oyo bana ya Isalaele bazalaki koluka, bazwaki yango te; kaka bato oyo Nzambe aponaki kati na bango nde bazwaki yango. Bato mosusu bakoma mitema mabanga,
8 kao što je pisano: Dade im Bog duh obamrlosti, oči da ne vide, uši da ne čuju sve do dana današnjega.
kolanda ndenge ekomama: « Nzambe apesaki bango molimo ya pongi, miso mpo ete bamona te, mpe matoyi mpo ete bayoka te, kino na mokolo ya lelo. »
9 I David veli: Nek im stol pred njima bude zamkom, i mrežom, i stupicom, i plaćom.
Mpe Davidi azali koloba: « Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango, monyama, libaku ya kokweya mpe ya kozwa etumbu!
10 Nek im potamne oči da ne vide i leđa im zauvijek pogni!
Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela! »
11 Pitam dakle: jesu li posrnuli da propadnu? Nipošto! Naprotiv: po njihovu posrtaju spasenje poganima da se tako oni, Židovi, izazovu na ljubomor.
Natuna lisusu: boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela? Soki moke te! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.
12 Pa ako je njihov posrtaj bogatstvo za svijet, i njihovo smanjenje bogatstvo za pogane, koliko li će više to biti njihov puni broj?
Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki?
13 Vama pak, poganima, velim: ja kao apostol pogana službu svoju proslavljam
Nazali koloba na bino Bapagano: lokola nazali ntoma ya Bapagano, napesaka lotomo na ngai lokumu
14 ne bih li na ljubomor izazvao njih, tijelo svoje, i spasio neke od njih.
na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
15 Jer ako je njihovo odbačenje izmirenje svijeta, što li će biti njihovo prihvaćanje ako ne oživljenje od mrtvih?
Pamba te soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, koyambama na bango ekozala ndenge nini? Boni, ekozala te bomoi kati na bakufi?
16 Ako li su prvine svete, sveto je i tijesto; ako li je korijen svet, svete su i grane.
Nzokande, soki mapa ya liboso oyo babonzeli Nzambe ezali bule, elingi koloba ete mapa nyonso oyo etikali ezali mpe bule; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete bitape na yango mpe ezali bule.
17 Pa ako su neke grane odlomljene, a ti, divlja maslina, pricijepljen umjesto njih, postao suzajedničar korijena, sočnosti masline,
Kasi soki bitape mosusu ekatamaki; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,
18 ne uznosi se nad grane. Ako li se hoćeš uznositi - ne nosiš ti korijena, nego korijen tebe.
kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatamaki. Soki omeki kobeta tolo, yeba malamu ete ezali yo te nde ozali komema mosisa, kasi ezali mosisa nde ezali komema yo.
19 Reći ćeš na to: grane su odlomljene da se ja pricijepim.
Okoki mpe koloba: « Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango. »
20 Dobro! Oni su zbog nevjere odlomljeni, a ti po vjeri stojiš. Ne uznosi se, nego strahuj!
Olobi malamu! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.
21 Jer ako Bog ne poštedje prirodnih grana, ni tebe neće poštedjeti.
Pamba te soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo.
22 Promotri dakle dobrotu i strogost Božju: strogost na palima, a dobrotu Božju na sebi ako ostaneš u toj dobroti, inače ćeš i ti biti odsječen.
Yango wana, sosola malamu boboto mpe kanda na Nzambe: kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe boboto epai na yo soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango. Soki te, yo mpe okokatama.
23 A i oni, ako ne ostanu u nevjeri, bit će pricijepljeni; ta moćan je Bog da ih opet pricijepi.
Mpe soki bato ya Isalaele bawumeli te kati na kozanga na bango kondima, bakokangisa bango lisusu na nzete, pamba te Nzambe azali na makoki ya kokangisa bango lisusu na nzete.
24 Doista, ako si ti, po naravi divlja maslina, odsječen pa mimo narav pricijepljen na pitomu maslinu, koliko li će lakše oni po naravi biti pricijepljeni na vlastitu maslinu!
Boye, soki yo owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ezala soki yango te nde ebimisaki yo, ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango?
25 Jer ne bih htio, braćo, da budete sami po sebi pametni, a da ne znate ovo otajstvo: djelomično je otvrdnuće zadesilo Izraela dok punina pogana ne uđe.
Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya: ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.
26 I tako će se cio Izrael spasiti, kako je pisano: Doći će sa Siona Otkupitelj, odvratit će bezbožnost od Jakova.
Boye, bato nyonso ya Isalaele bakobika, kolanda ndenge ekomama: « Mokangoli akobimela na Siona, akolongola mabe kati na Jakobi.
27 I to će biti moj Savez s njima, kad uklonim grijehe njihove.
Mpe yango nde ekozala boyokani na Ngai elongo na bango tango nakolongola masumu na bango. »
28 U pogledu evanđelja oni su, istina, protivnici poradi vas, ali u pogledu izabranja oni su ljubimci poradi otaca.
Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino; kasi mpo na oyo etali koponama oyo Nzambe asalaki, bazali balingami na Ye likolo ya bakoko na bango,
29 Ta neopozivi su dari i poziv Božji!
pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.
30 Doista, kao što vi nekoć bijaste neposlušni Bogu, a sada po njihovoj neposlušnosti zadobiste milosrđe
Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda,
31 tako i oni sada po milosrđu vama iskazanu postadoše neposlušni da i oni sada zadobiju milosrđe.
ndenge wana mpe kozanga botosi na bango ya sik’oyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa mpo ete ayokela bango mpe mawa.
32 Jer Bog je sve zatvorio u neposlušnost da se svima smiluje. (eleēsē )
Pamba te Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi mpo ete ayokela bato nyonso mawa. (eleēsē )
33 O dubino bogatstva, i mudrosti, i spoznanja Božjega! Kako li su nedokučivi sudovi i neistraživi putovi njegovi!
Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye!
34 Doista, tko spozna misao Gospodnju, tko li mu bi savjetnikom?
« Nani ayebaki makanisi ya Nkolo? Nani akomaki kopesa Ye toli?
35 Ili: tko ga darom preteče da bi mu se uzvratiti moralo?
Nani apesaki Nkolo eloko mpo ete Nkolo azongisela ye? »
36 Jer sve je od njega i po njemu i za njega! Njemu slava u vjekove! Amen. (aiōn )
Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen! (aiōn )