< Psalmi 27 >
1 Davidov. Jahve mi je svjetlost i spasenje: koga da se bojim? Jahve je štit života moga: pred kime da strepim?
Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai; nakobanga nani? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai; nakolenga liboso ya nani?
2 Kad navale na me zlotvori da mi tijelo žderu, protivnici moji i dušmani, oni posrću i padaju.
Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.
3 Nek' se vojska protiv mene utabori, srce se moje ne boji; nek' i rat plane protiv mene, i tada pun sam pouzdanja.
Ata limpinga ezingeli ngai, motema na ngai ekobanga soki moke te; ata etumba etelemi mpo na koboma ngai, atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.
4 Za jedno molim Jahvu, samo to ja tražim: da živim u Domu Jahvinu sve dane života svoga, da uživam milinu Jahvinu i Dom njegov gledam.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi: nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
5 U sjenici svojoj on me zaklanja u dan kobni; skriva me u skrovištu Šatora svoga, na hridinu on me uzdiže.
Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
6 I sada izdižem glavu iznad dušmana oko sebe. U njegovu ću Šatoru prinositi žrtve radosne, Jahvi ću pjevat' i klicati.
Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.
7 Slušaj, o Jahve, glas moga vapaja, milostiv mi budi, usliši me!
Yawe, yoka mongongo na ngai, soki nabeleli Yo; salela ngai ngolu mpe yanola ngai.
8 Moje mi srce govori: “Traži lice njegovo!” Da, lice tvoje, o Jahve, ja tražim.
Motema na ngai elobi na tina na Yo: « Tala elongi na Ye! » Yawe, nakotala elongi na Yo.
9 Ne skrivaj lica svoga od mene. Ne odbij u gnjevu slugu svoga! Ti, Pomoći moja, nemoj me odbaciti! I ne ostavi me, Bože, Spasitelju moj!
Kopesa ngai mokongo te, kobengana mosali na Yo te na kanda; osungaki ngai. Kotika ngai te, kosundola ngai te, Nzambe, Mobikisi na ngai.
10 Ako me otac i mati ostave, Jahve će me primiti.
Ata tata mpe mama na ngai basundoli ngai, Yawe akolokota ngai.
11 Nauči me, Jahve, putu svojemu, ravnom me stazom povedi poradi protivnika mojih.
Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, tambolisa ngai na nzela ya alima, pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
12 Bijesu dušmana mojih ne predaj me, jer ustadoše na mene svjedoci lažni koji dašću nasiljem.
Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai, pamba te batatoli ya lokuta batelemi mpo na kokosela ngai makambo, bazali kobimisa maloba mabe.
13 Vjerujem da ću uživati dobra Jahvina u zemlji živih.
Nakozalaka na elikya na likambo oyo: nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
14 U Jahvu se uzdaj, ojunači se, čvrsto nek' bude srce tvoje: u Jahvu se uzdaj!
Talela Yawe! Zala makasi mpe yika mpiko! Talela Yawe!