< Job 23 >
2 “Zar mi je i danas tužaljka buntovna? Teška mu ruka iz mene vapaj budi:
« Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo, loboko oyo ezali likolo na ngai eleki kolela ya motema na ngai na kilo.
3 o, kada bih znao kako ću ga naći, do njegova kako doprijeti prijestolja,
Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe, nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye,
4 pred njim parnicu bih svoju razložio, iz mojih bi usta navrli dokazi.
nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, likambo na ngai liboso na Ye, mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,
5 Rad bih znati što bi meni odvratio i razumjeti riječ što bi je rekao!
nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai, mpe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai.
6 Zar mu treba snage velike za raspru? Ne, dosta bi bilo da me on sasluša.
Boni, alingaki kosalela nguya na Ye mpo na kosamba na ngai? Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa!
7 U protivniku bi vidio pravedna, i parnica moja tad bi pobijedila.
Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.
8 Na istok krenem li, naći ga ne mogu; pođem li na zapad, ne razabirem ga.
Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te; soki nakeyi na ngambo ya weste, nazali komona Ye te.
9 Ištem na sjeveru, al' ga ne opažam; nevidljiv je ako se k jugu okrenem.
Tango azali na mosala na ngambo ya nor, nazali komona Ye te, tango azali kobaluka na ngambo ya sude, nazali komona Ye ata moke te.
10 Pa ipak, on dobro zna put kojim kročim! Neka me kuša: čist k'o zlato ću izići!
Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.
11 Noga mi se stopa njegovih držala, putem sam njegovim išao ne skrećuć';
Makolo na ngai elandaki matambe na Ye; natambolaki na nzela na Ye mpe natikalaki kopengwa na yango te.
12 slušao sam nalog njegovih usana, pohranih mu riječi u grudima svojim.
Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.
13 Al' htjedne li štogod, tko će ga odvratit'? Što zaželi dušom, to će ispuniti.
Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye; nani akoki kotelemela Ye? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.
14 Izvršit će što je dosudio meni, kao i sve drugo što je odlučio!
Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.
15 Zbog toga pred njime sav ustravljen ja sam, i što više mislim, jače strah me hvata.
Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.
16 U komade Bog mi je srce smrvio, užasom me svega prožeo Svesilni,
Nzambe alembisi ngai, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai.
17 premda nisam ni u tminama propao, ni u mraku što je lice moje zastro.
Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai ekangi ngai monoko te.