< Jeremija 6 >
1 Bježite, sinovi Benjaminovi, isred Jeruzalema! U Tekoi zatrubite u rog, na Bet Hakeremu podignite bojni stijeg! Jer sa Sjevera se nadvija nesreća, propast velika.
« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino! Bobima na Yelusalemi! Bobeta kelelo na Tekoa! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.
2 Može li se Kći sionska usporedit' s nježnom tratinom?
Nakobebisa Siona, mboka kitoko, oyo ezali penza kitoko lokola elenge mwasi ya kitoko mpe ya nzoto sembesembe.
3 K njoj dolaze pastiri sa stadima. Svud oko nje razapeše šatore, svaki pase na dijelu svome.
Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bango bakobundisa yango, bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango; bongo moko na moko akoyeisa bibwele na ye na esika oyo ye akozwa.
4 S njome zametnite sveti boj! Na noge! Navalimo usred dana! Jao nama, jer se dan naginje k zapadu, a večernje sjene duljaju!
Bomibongisa mpo na kobundisa yango! Botelema, tika ete tobundisa yango na midi! Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili mpe molili ya pokwa ezali koya.
5 Na noge! Navalimo usred noći, razrušimo dvore njene!”
Boye, totelema! Tika ete tokota kati na yango na butu, tobebisa bandako na yango oyo batonga makasi! »
6 Jer ovako zbori Jahve nad Vojskama: “Oborite stabla njena, podignite nasip oko Jeruzalema, to je grad laži, u njemu je sve samo tlačenje.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe!
7 Kao što iz studenca izvire voda, tako iz njega opačina izvire. U njemu se čuje samo nasilje i pustošenje, preda mnom su svagda bolesti i rane.
Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi, ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe. Sango moko kaka ezali kotambola kuna: sango ya mobulu mpe ya kobebisama; tango nyonso liboso na Ngai, kaka minyoko mpe bapota.
8 Popravi se, Jeruzaleme, da mi se duša od tebe ne odvrati, da te ne pretvorim u pustoš, u zemlju nenastanjenu.”
Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
9 Ovako govori Jahve nad Vojskama: “Paljetkuj, paljetkuj kao lozu Ostatak Izraelov! Poput berača pruži ruke među čokote!”
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikali ndenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka; bolekisa lisusu maboko na bino na likolo ya bitape ya banzete ya vino lokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. »
10 Komu treba da govorim, koga da opomenem da me saslušaju? Gle, uho im je neobrezano stog ne mogu čuti. Gle, riječ Jahvina postade im porugom, nije im mila.
Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani? Nani akoyokela ngai? Matoyi na bango ekangama; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.
11 Prepun sam gnjeva Jahvina, ne mogu više izdržati! - Izlij ga, dakle, po djeci na ulici i na skupove mladića. Sve će ih obuzeti: muža i ženu, starca i čovjeka zrele dobi.
Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.
12 Njihove će kuće pripasti drugima, a tako i polja i žene im. “Da, ispružit ću ruku svoju - govori Jahve - na stanovnike ove zemlje,
Tango nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bavandi ya mboka, nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango, epai ya bato mosusu, » elobi Yawe.
13 jer od najmanjega do najvećeg svi gramze za plijenom, od proroka do svećenika svi su varalice.
« Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe: bango nyonso bazali kotambola na lokuta.
14 I olako liječe ranu naroda moga, vičući: 'Mir! Mir!' Ali mira nema.
Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba: ‹ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu! › Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te.
15 Nek' se postide što gnusobu počiniše, no oni više ne znaju što je stid, ne umiju se više crvenjeti. I zato će popadati s onima što padaju, srušit će se kad stanem kažnjavati” - govori Jahve.
Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te? Te, bazali na bango koyoka ata soni te; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
16 Ovako govori Jahve: “Stanite na negdašnje putove, raspitajte se za iskonske staze: Koji put vodi k dobru? Njime pođite i naći ćete spokoj dušama svojim! Al' oni rekoše: 'Ne idemo!'
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki: ‹ Tokolanda na biso yango te! ›
17 I postavih im stražare: 'Pazite na glas roga!' Al' oni rekoše: 'Nećemo paziti!'
Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino: ‹ Boyoka mongongo ya kelelo! › Kasi bozongisaki: ‹ Te! Tokoyoka te. ›
18 Zato čujte, narodi, i vi pastiri stada njihovih!
Yango wana, bino bikolo, boyoka! Bozala batatoli ya makambo oyo ekokomela bango.
19 Čuj, zemljo! Gle, dovodim zlo na ovaj narod, plod njihove pobune, jer oni ne slušahu riječi moje, Zakon moj odbaciše.
Oh mabele, yoka! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
20 Što će mi tamjan koji dolazi iz Šebe i trska mirisna iz zemlje daleke? Vaše mi paljenice nisu drage, nisu mi po volji klanice vaše.”
Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »
21 Zato ovako govori Jahve: “Evo postavljam narodu ovome prepreke o koje će se spotaći, oci i djeca zajedno, poginut će susjed zajedno s prijateljem.”
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo; batata mpe bana na bango bakobeta mabaku mpe bakokweya nzela moko, bazalani elongo na baninga bakokufa. »
22 Ovako govori Jahve: “Evo dolazi narod iz zemlje sjeverne, puk velik diže se s krajeva zemlje:
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya longwa na mokili ya nor; ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
23 u ruci im luk i koplje, okrutni su, nemilosrdni; graja im buči kao more, jašu na konjima, kao jedan za boj spremni protiv tebe, Kćeri sionska.
Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali mitema mabe mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. »
24 Kad saznasmo novost, ruke nam klonuše, strava nas obuze, bol kao porodilju.
Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
25 Ne izlazite u polja, ne idite na putove, jer mačevi dušmanski prijete, užas sve uokolo.
Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.
26 Kćeri mog naroda, kostrijet pripaši, pospi se pepelom, nariči k'o za jedincem tužaljku pregorku. Jer će doći nenadano na nas pustošnik.
Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.
27 Postavih te za ispitivača naroda mojeg da spoznaš i ispitaš putove njegove.
« Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende, mpo ete okoka kotala malamu mpe omeka ezaleli na bango.
28 Svi su oni odmetnici najgori, okolo kleveću i mjed i željezo, svi su pokvareni.
Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi, bayebi kaka kotonga. Bazali lokola bronze mpe ebende, bango nyonso bazali kaka babebisi.
29 Mijeh sopće da bi vatra proždrla olovo, zalud se ljevač trudi da ga rastopi: šljaka se ne da izlučiti.”
Epepelo ezali kopelisa moto makasi, mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto; kasi bazali na bango kaka konyangwisa ebende yango na pamba, pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te.
30 “Srebro odbačeno”, tako ih zovu, jer ih Jahve odbaci!
Babengaka bango palata babwaka, pamba te Yawe asundola bango. »