< Izaija 7 >

1 U dane judejskoga kralja Ahaza, sina Jotamova, sina Uzijina, aramski kralj Rason i izraelski kralj Pekah, sin Remalijin, zavojštiše na Jeruzalem, ali ga ne mogoše zauzeti.
Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.
2 Tada dojaviše domu Davidovu: “Aramci se utaborili u Efrajimu.” Na tu vijest uzdrhta srce kraljevo i srce svega naroda, kao što u šumi drveće ustrepti od vjetra.
Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi: « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe.
3 I Jahve reče Izaiji: “Iziđi pred Ahaza, ti i sin tvoj Šear Jašub, do nakraj vodovoda gornjeg ribnjaka na putu u Valjarevo polje.
Boye, Yawe alobaki na Ezayi: « Kende, yo elongo na Sheari-Yashubi, mwana na yo ya mobali, kokutana na Akazi na suka ya nzela ya mayi oyo ekenda kino na liziba monene, na nzela ya bilanga ya moto oyo atiaka balangi na bilamba;
4 Reci mu: 'Pazi, smiri se, ne boj se, i nek' ti ne premire srce od ovih dvaju ugaraka zadimljenih, od raspaljenog bijesa Rasona aramskog i sina Remalijina,
loba na ye: ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela: kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia!
5 jer Aram, Efrajim i sin Remalijin smisliše tvoju propast.'
Siri, Efrayimi mpe mwana mobali ya Remalia, basaleli yo likita mpo na kobebisa yo; bazali koloba:
6 Pođimo, rekoše, na Judeju, uplašimo je i osvojimo da u njoj zakraljimo sina Tabelova.
‘Tika ete tobundisa Yuda, tokata yango na biteni, tokabola yango biso na biso mpe totia mwana mobali ya Tabeli lokola mokonzi na yango.’
7 Ovako govori Jahve Gospod: 'To se neće zbiti: toga biti neće!
Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ekotikala kosalema te, ekotikala kokokisama te!
8 [8a] Damask je glava Aramcima, a Damasku je glava Rason;
Pamba te moto ya Siri ezali Damasi, mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini. Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano, Efrayimi ekobebisama mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te.
9 Samarija je glava Efrajimcima, a Samariji glava je Remalija. [8b]Još šezdeset i pet godina, i Efrajim, razoren, neće više biti narod. [9b] Ako se na me ne oslonite, održat' se nećete!”
Moto ya Efrayimi ezali Samari, mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, bokolonga te kotelema liboso na bango! › »
10 Jahve opet progovori Ahazu i reče mu:
Yawe alobaki lisusu na Akazi:
11 “Zaišti od Jahve, Boga svoga, jedan znak za sebe iz dubine Podzemlja ili gore iz visina.” (Sheol h7585)
— Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo. (Sheol h7585)
12 Ali Ahaz odgovori: “Ne, neću iskati i neću iskušavati Jahvu.”
Kasi Akazi alobaki: — Nakosenga te, nakoki komeka Yawe te.
13 Tada reče Izaija: “Čujte, dome Davidov. Zar vam je malo dodijavati ljudima, pa i Bogu mom dodijavate!
Boye Ezayi alobaki: — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai?
14 Zato, sam će vam Gospodin dati znak: Evo, začet će djevica i roditi sina i nadjenut će mu ime Emanuel!
Ye moko Nkolo akopesa bino elembo: moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »
15 Vrhnjem i medom on će se hraniti dok ne nauči odbacivat' zlo i birati dobro.
Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu.
16 Jer prije nego dječak nauči odbacivat' zlo i birati dobro, opustjet će zemlja, zbog koje strepiš, od dvaju kraljeva.
Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama.
17 Protiv tebe i protiv tvog naroda i protiv kuće oca tvojega dovest će Jahve dane kakvih ne bijaše otkad se Efrajim odvoji od Jude - kralja asirskoga.
Yawe akoyeisela yo, bato na yo mpe libota ya tata na yo mikolo oyo etikala nanu kozala te wuta Efrayimi ekabwana na Yuda: ezali nde mokonzi ya Asiri.
18 U dan onaj zazviždat će Jahve muhama na ušću egipatskih rijeka i pčelama u zemlji asirskoj
Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri;
19 da dođu i popadaju po strmim dolovima, po rasjelinama stijena, po svim trnjacima i svim pojilištima.
ekoya mpe ekovanda kati na mabwaku ya mozindo mpe na madusu ya mabanga, na banzete nyonso ya mike-mike mpe na matiti nyonso.
20 U dan onaj Gospod će obrijati britvom najmljenom s onu stranu Eufrata - kraljem asirskim - kosu s glave, dlake s nogu i bradu s obraza.
Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo.
21 U dan onaj svatko će hraniti po kravu i dvije ovce
Na mokolo wana, moko na moko akobokola mwana ngombe ya mwasi mpe bameme to bantaba mibale ya basi.
22 i od obilja mlijeka koje će mu dati hranit će se vrhnjem; vrhnjem i medom hranit će se koji god u zemlji preostanu.
Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi.
23 U dan onaj gdje god bijaše tisuću čokota, vrijednih tisuću srebrnika, izrast će drač i trnje.
Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube.
24 Onamo će polaziti sa strijelom i lukom, jer sva će zemlja u drač i trnje zarasti.
Bato bakokota kuna na matolotolo mpe na bambanzi, pamba te mokili ekotonda na basende mpe na banzube.
25 A po svim gorama gdje se motikom kopalo nitko više neće ići, strašeći se trnja i drača: onuda će goveda pasti i gaziti ovce.”
Bato bakoleka lisusu te na bangambo nyonso oyo bazalaki kosala bilanga na kongo, pamba te bakokoma kobanga basende mpe banzube; ngombe ekokoma kolia kuna, mpe meme ekonyata-nyata mabele na yango.

< Izaija 7 >