< Izaija 3 >

1 Gle, Gospod, Jahve nad Vojskama, oduzima Jeruzalemu i Judeji svaku potporu, pomoć u kruhu i pomoć u vodi,
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akomi pene ya kobotola masungi nyonso, kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda: lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi;
2 junaka i ratnika, suca i proroka, vrača i starješinu, pedesetnika i odličnika,
bilombe mpe basoda ya mpiko, basambisi mpe basakoli, bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi;
3 savjetnika i mudra gatara i onoga što se bavi čaranjem.
bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu, bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko mpe bato oyo basalelaka maji.
4 “A za glavare postavljam im djecu, dajem deranima da njima vladaju.”
Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango mpe bana mike bakamba bango.
5 Ljudi se glože jedan s drugim i svaki s bližnjim svojim; dijete nasrće na starca, prostak na odličnika
Bato bakokoma konyokolana bango na bango: moko akonyokola mosusu, mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu; bilenge bakotosa mikolo te, bato pamba bakotelemela bato ya lokumu;
6 te svatko brata hvata u očinskoj kući: “Ti imaš plašt, budi nam glavarom, uzmi u ruke ovo rasulo!”
moko akokanga ndeko na ye ya mobali kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba: « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, kamata mokumba ya libebi oyo na maboko! »
7 A on će se, u dan onaj, braniti: “Neću da budem vidar, nema u mene ni kruha ni plašta: ne stavljajte me narodu za glavara.”
Kasi na mokolo wana, akoganga: « Te, nazali na ngai monganga te, mpe nazali na bilei to bilamba te kati na ndako na ngai; bokomisa ngai mokonzi te! »
8 Jeruzalem se ruši i pada Judeja, jer im se jezik i djela Jahvi protive te prkose pogledu Slave njegove.
Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.
9 Lice njihovo protiv njih svjedoči, razmeću se grijehom poput Sodome i ne kriju ga, jao njima, sami sebi propast spremaju.
Bilongi na bango ezali kofunda bango; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo!
10 Kažite: “Blago pravedniku, hranit će se plodom djela svojih!
Loba na moto ya sembo: « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »
11 Jao opakome, zlo će mu biti, na nj će pasti djela ruku njegovih.”
Mawa na moto mabe! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
12 Deran tlači narod moj i žene njime vladaju. O narode moj, vladaoci te tvoji zavode i raskapaju put kojim hodiš.
Bilenge bazali konyokola bato na Ngai, basi bazali koyangela bango. Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela, babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda!
13 Ustade Jahve da se popravda s narodom svojim,
Yawe atelemi na esambiselo, atelemi mpo na kosambisa bato.
14 Jahve dolazi na sud sa starješinama i glavarima svog naroda: “Vinograd ste moj opustošili, u vašim je kućama što oteste siromahu.
Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye: « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola!
15 S kojim pravom narod moj tlačite i gazite lice siromaha?” - riječ je Jahve, Gospoda nad Vojskama.
Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai mpe kotiola bomoto ya babola; » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga?
16 I reče Jahve: “Što se to ohole kćeri sionske te ispružena vrata hode, okolo okom namiguju, koracima sitnim koracaju, grivnama na nozi zveckaju?
Yawe alobi: « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,
17 Oćelavit će Gospod tjeme kćeri sionskih, obnažit će Jahve golotinju njihovu.”
Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata mpe akotika bango bolumbu. »
18 U onaj će dan Gospod strgnuti sve čime se ona ponosi: ukosnice i mjesečiće,
Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele: basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza;
19 naušnice, narukvice i koprene,
biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale,
20 poveze, lančiće, pojaseve, bočice s miomirisima i privjese,
bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto,
21 prstenje i nosne prstenove,
bapete ya mosapi, bapete ya zolo,
22 skupocjene haljine i plašteve, prijevjese i torbice,
bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike,
23 zrcala i košuljice, povezače i rupce.
bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.
24 Mjesto miomirisa, smrad; mjesto pojasa, konopac; mjesto kovrča, tjeme obrijano; mjesto gizdave halje, kostrijet; mjesto ljepote, žig.
Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe; na esika ya mokaba, ekozela nde singa; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
25 Muževi tvoji od mača će pasti, junaci tvoji u kreševu.
Mibali na bino bakokufa na mipanga, basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba.
26 Vrata će tvoja kukat' i tugovati, na zemlji ćeš sjedit' napuštena.
Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga; boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.

< Izaija 3 >