< Postanak 15 >

1 Poslije tih događaja Jahve uputi Abramu riječ u ukazanju: “Ne boj se, Abrame, ja sam ti zaštita; a nagrada tvoja bit će vrlo velika!”
Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli: — Kobanga te, Abrami! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.
2 Abram odgovori: “Gospodine moj, Jahve, čemu mi tvoji darovi kad ostajem bez poroda; kad je mojoj kući nasljednik Eliezer Damaščanin?
Kasi Abrami azongisaki: — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
3 Kako mi nisi dao potomstva - nastavi Abram - jedan će, eto, od mojih ukućana postati moj baštinik.”
Abrami alobaki lisusu: — Opesi ngai mwana te; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai!
4 Ali mu Jahve opet uputi riječ: “Taj neće biti tvoj baštinik, nego će ti baštinik biti tvoj potomak.”
Yawe alobaki na ye: — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.
5 Izvede ga van i reče: “Pogledaj na nebo i zvijezde prebroj ako ih možeš prebrojiti.” A onda doda: “Toliko će biti tvoje potomstvo.”
Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye: — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu: — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
6 Abram povjerova Jahvi, i on mu to uračuna u pravednost.
Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
7 Tada mu on reče: “Ja sam Jahve koji sam te odveo iz Ura Kaldejskoga da ti predam ovu zemlju u posjed.”
Alobaki na ye lisusu: — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.
8 A on odvrati: “Gospodine moj, Jahve, kako ću ja doznati da ću je zaposjesti?”
Kasi Abrami alobaki: — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai?
9 Odgovori mu: “Prinesi mi junicu od tri godine, kozu od tri godine, ovna od tri godine, jednu grlicu i jednog golubića.”
Yawe alobaki na ye: — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
10 Sve mu to donese, rasiječe na pole i metnu sve pole jednu prema drugoj; ptica nije rasijecao.
Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu; kasi akataki bandeke te.
11 Ptice grabežljivice obarale se na leševe, ali ih je Abram rastjerivao.
Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango.
12 Kad je sunce bilo pri zalazu, dubok san obuzme Abrama, a onda se na nj spusti gust mrak pun jeze.
Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye.
13 Tada Bog reče Abramu: “Dobro znaj da će tvoji potomci biti stranci u tuđoj zemlji; robovat će i biti tlačeni četiri stotine godina,
Boye, Yawe alobaki na Abrami: — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei.
14 ali narodu kojem budu služili ja ću suditi; i konačno će izići s velikim blagom.
Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele.
15 A ti ćeš k ocima svojim u miru poći, u sretnoj starosti bit ćeš sahranjen.
Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.
16 Oni će se ovamo vratiti za četvrtog naraštaja, jer mjera se zlodjela amorejskih još nije navršila.”
Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
17 Kad je sunce zašlo i pao gust mrak, pojavi se zadimljen žeravnjak i goruća zublja te prođu između onih dijelova.
Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama.
18 Toga je dana Jahve sklopio Savez s Abramom rekavši: “Potomstvu tvojemu dajem zemlju ovu od Rijeke u Egiptu do Velike rijeke, rijeke Eufrata:
Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki: « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate:
19 Kenijce, Kenižane, Kadmonce,
mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni,
20 Hetite, Perižane, Refaimce,
ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi,
21 Amorejce, Kanaance, Girgašane, Jebusejce.”
ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »

< Postanak 15 >