< Ezekiel 2 >

1 I reče mi: “Sine čovječji, na noge se, da s tobom govorim!”
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, telema na makolo na yo; pamba te nazali na likambo ya koyebisa yo. »
2 OI uđe u me duh, kako mi progovori, te me podiže na noge i ja čuh glas onoga koji mi govoraše.
Wana azalaki nanu koloba, Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai; bongo nakomaki koyoka Ye koloba na ngai.
3 I reče mi: “Sine čovječji, šaljem te k sinovima Izraelovim, k narodu odmetničkom što se odvrže od mene. Oni i oci njihovi griješili su protiv mene sve do dana današnjega.
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai.
4 Šaljem te k sinovima tvrdokorna pogleda i okorjela srca. Reci im: Ovako govori Jahve Gospod!
Bato oyo epai wapi nazali kotinda yo, bazali mito makasi mpe mitema mabanga. Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. ›
5 I poslušali oni ili ne poslušali - rod su odmetnički - neka znaju da je prorok među vama.
Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango.
6 A ti, sine čovječji, ne boj ih se i ne plaši se riječi njihovih: 'Trnje te okružuje i sjediš među samim skorpijama.' Ne plaši se riječi njihovih i ne boj se nimalo njihova pogleda jer oni su rod odmetnički.
Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.
7 Govori im moje riječi, poslušali oni ili ne poslušali, jer rod su odmetnički.
Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki.
8 A ti, sine čovječji, poslušaj što ću ti sada reći: Ne budi odmetnik kao što su oni rod odmetnički! Otvori usta i progutaj što ću ti sada dati!”
Kasi yo, mwana na moto, yoka makambo oyo nazali koloba na yo. Kotombokela ngai te lokola libota ya batomboki oyo! Fungola monoko na yo mpe lia oyo nazali kopesa yo! »
9 I pogledah, a to ruka k meni ispružena i u njoj, gle, svitak knjige.
Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama.
10 I razvi se knjiga preda mnom: bijaše ispisana izvana i iznutra, a u njoj napisano: “Naricanje! Jecanje! Jauk!”
Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki: basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.

< Ezekiel 2 >