< Efežanima 6 >
1 Djeco, slušajte svoje roditelje u Gospodinu jer to je pravedno.
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.
2 Poštuj oca svoga i majku - to je prva zapovijed s obećanjem:
Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka: Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu
3 da ti dobro bude i da dugo živiš na zemlji.
mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
4 A vi, očevi, ne srdite djece svoje, nego ih odgajajte stegom i urazumljivanjem Gospodnjim!
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
5 Robovi, slušajte svoje zemaljske gospodare kao Krista - sa strahom i trepetom, u jednostavnosti srca.
Bino bawumbu, botosaka bankolo na bino ya mokili, na limemia, na kobanga mpe na bosembo ya mitema, lokola nde bozali kotosa Klisto;
6 Ne naoko, kao oni koji se ulaguju ljudima, nego kao sluge Kristove koje zdušno vrše volju Božju;
na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango.
7 dragovoljno služe - kao Gospodinu, a ne ljudima,
Bosalaka na esengo lokola bawumbu ya Nkolo, kasi lokola bawumbu ya bato te,
8 znajući da će svatko, bio on rob ili slobodnjak, učini li što dobro, za to dobiti plaću od Gospodina.
pamba te boyebi malamu ete Nkolo akofuta moto nyonso mpo na bolamu nyonso oyo asalaka, azala mowumbu to monsomi.
9 I vi, gospodari, isto se tako vladajte prema njima: kanite se prijetnje, znajući da je i njihov i vaš Gospodar na nebesima i da u njega nema pristranosti.
Bongo mpo na bino bankolo, bosalaka mpe ndenge wana epai ya bawumbu na bino. Bobangisaka bango te, lokola boyebi malamu ete Nkolo na bango, oyo azali kati na Likolo azali mpe Nkolo na bino mpe aponaka bilongi te.
10 Ubuduće jačajte se u Gospodinu i u silnoj snazi njegovoj.
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
11 Obucite svu opremu Božju da se mognete oduprijeti lukavstvima đavlovim.
Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.
12 Jer nije nam se boriti protiv krvi i mesa, nego protiv Vrhovništava, protiv Vlasti, protiv upravljača ovoga mračnoga svijeta, protiv zlih duhova po nebesima. (aiōn )
Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo. (aiōn )
13 Zbog toga posegnite za svom opremom Božjom da uzmognete odoljeti u dan zli i održati se kada sve nadvladate.
Yango wana, bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kolonga na mokolo mabe ya Satana mpe kotelema ngwi kino na suka sima na bino kobunda.
14 Držite se dakle! Opašite bedra istinom, obucite oklop pravednosti,
Boye botelema ngwi, bolataka solo lokola mokaba na loketo, bosembo lokola ebombelo ya tolo,
15 potpašite noge spremnošću za evanđelje mira!
molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.
16 U svemu imajte uza se štit vjere: njime ćete moći ugasiti ognjene strijele Zloga.
Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola nguba oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka.
17 Uzmite i kacigu spasenja i mač Duha, to jest Riječ Božju.
Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo.
18 Svakovrsnom se molitvom i prošnjom u svakoj prigodi u Duhu molite. Poradi toga i bdijte sa svom ustrajnošću i molitvom za sve svete,
Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
19 i za me, da mi se otvore usta i dade riječ hrabro obznaniti otajstvo evanđelja
Bobondelaka mpe mpo na ngai mpo ete, tango nyonso nakozala koteya, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli kotatola mpo na kosakola mabombami ya Sango Malamu, na kozanga bobangi.
20 kojeg sam poslanik u okovima, da se ohrabrim o njemu kako treba govoriti.
Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango.
21 A da i vi znate što je sa mnom, kako mi je, o svemu će vas obavijestiti Tihik, ljubljeni brat i vjerni poslužitelj u Gospodinu.
Tishike oyo, kati na Nkolo, azali ndeko molingami mpe mosali ya sembo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe boyeba ndenge nini nazali mpe makambo nini nazali kosala.
22 Njega šaljem k vama baš zato da znate kako smo i da ohrabri srca vaša.
Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na ngai mpe alendisa bino.
23 Mir braći i ljubav, s vjerom, od Boga Oca i Gospodina Isusa Krista!
Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu-Klisto bapesa na bandeko nyonso kimia, bolingo mpe kondima!
24 Milost sa svima koji ljube Gospodina našega Isusa Krista - u neraspadljivosti.
Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te!