< Efežanima 1 >

1 Pavao, po volji Božjoj apostol Krista Isusa: svetima koji su u Efezu i vjernima u Isusu Kristu.
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe; Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso:
2 Milost vam i mir od Boga, Oca našega, i Gospodina Isusa Krista!
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
3 Blagoslovljen Bog i Otac Gospodina našega Isusa Krista, on koji nas blagoslovi svakim blagoslovom duhovnim u nebesima, u Kristu.
Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
4 Tako: u njemu nas sebi izabra prije postanka svijeta da budemo sveti i bez mane pred njim;
Pamba te, kati na Klisto, apona biso liboso ete akela mokili, mpo ete tozala bato ya bule mpe bazanga pamela na miso na Ye. Kati na bolingo na Ye,
5 u ljubavi nas predodredi za posinstvo, za sebe, po Isusu Kristu, dobrohotnošću svoje volje,
abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,
6 na hvalu Slave svoje milosti. Njome nas zamilova u Ljubljenome
mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.
7 u kome, njegovom krvlju, imamo otkupljenje, otpuštenje prijestupa po bogatstvu njegove milosti.
Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe
8 Nju preobilno u nas uli zajedno sa svom mudrošću i razumijevanjem
oyo akabolelaki biso yango na bofuluki, na kopesa biso bwanya mpe bososoli nyonso,
9 obznanivši nam otajstvo svoje volje po dobrohotnom naumu svojem što ga prije u njemu zasnova
mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,
10 da se provede punina vremena: uglaviti u Kristu sve - na nebesima i na zemlji.
mpo na kokokisa yango na tango ya suka: kosangisa kati na Klisto bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo mpe oyo ezali na mabele.
11 U njemu, u kome i nama - predodređenima po naumu Onoga koji sve izvodi po odluci svoje volje - u dio pade
Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,
12 da budemo na hvalu Slave njegove - mi koji smo se već prije nadali u Kristu.
mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.
13 U njemu ste i vi, pošto ste čuli Riječ istine - evanđelje spasenja svoga - u njemu ste, prigrlivši vjeru, opečaćeni Duhom obećanim, Svetim,
Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe
14 koji je zalog naše baštine: otkupljenja, posvojenja - na hvalu Slave njegove.
lokola ndanga ya libula na biso kino basikolami na Ye bakangolama mpo na kosanzola nkembo na Ye.
15 Zato i ja, otkad sam čuo za vašu vjeru u Gospodinu Isusu i za ljubav prema svima svetima,
Yango wana, wuta tango nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo na bino mpo na basantu nyonso,
16 ne prestajem zahvaljivati za vas i sjećati vas se u svojim molitvama:
nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino, nakanisaka bino na mabondeli na ngai
17 Bog Gospodina našega Isusa Krista, Otac Slave, dao vam Duha mudrosti i objave kojom ćete ga spoznati;
mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.
18 prosvijetlio vam oči srca da upoznate koje li nade u pozivu njegovu, koje li bogate slave u baštini njegovoj među svetima
Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,
19 i koje li prekomjerne veličine u moći njegovoj prema nama koji vjerujemo: ona je primjerena djelotvornosti sile i snage njegove
mpe monene makasi ya nguya na Ye mpo na biso oyo tozali na kondima. Abimisaki nguya yango na makasi na yango nyonso
20 koju na djelu pokaza u Kristu, kad ga uskrisi od mrtvih i posjede sebi zdesna na nebesima
mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo,
21 iznad svakog Vrhovništva i Vlasti i Moći i Gospodstva i svakog imena imenovana ne samo na ovom svijetu nego i u budućemu. (aiōn g165)
na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya. (aiōn g165)
22 Sve mu podloži pod noge, a njega postavi - nad svime - Glavom Crkvi,
Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba
23 koja je Tijelo njegovo, punina Onoga koji sve u svima ispunja.
oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye.

< Efežanima 1 >