< 2 Ljetopisa 24 >
1 Joašu je bilo sedam godina kad se zakraljio, a kraljevao je četrdeset godina u Jeruzalemu. Materi mu je bilo ime Sibja iz Beer Šebe.
Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.
2 Joaš je činio što je pravo u Jahvinim očima dok je bio živ svećenik Jojada.
Joasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada.
3 Jojada ga je oženio dvjema ženama i on je s njima imao sinova i kćeri.
Yeoyada aponaki mpo na Joasi basi mibale oyo babotelaki ye bana mibali mpe bana basi.
4 Poslije toga nakanio je u srcu obnoviti Jahvin Dom.
Sima na yango, Joasi azwaki mokano ya kobongisa Tempelo ya Yawe.
5 Skupivši svećenike i levite, reče im: “Zađite po judejskim gradovima i kupite od svih Izraelaca novaca da se obnovi Dom vašega Boga, od godine do godine, a vi pohitite s tim poslom.” Ali se levitima nije htjelo.
Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango: — Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo. Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te.
6 Zato kralj pozva poglavara Jojadu i reče mu: “Zašto ne tražiš od levita da donose iz Judeje i iz Jeruzalema porez koji je odredio Jahvin sluga Mojsije i Izraelov zbor za Šator svjedočanstva?
Mokonzi abengisaki Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe alobaki na ye: « Mpo na nini olobaki te na Balevi ete bakongola, wuta na Yuda mpe na Yelusalemi, mpako oyo Moyize, mosali na Yawe, akatelaki lisanga ya Isalaele mpo na Ndako ya kapo ya Litatoli? »
7 Atalija i njeni sinovi bijahu poharali Božji Dom, i sve stvari što su bile posvećene Jahvinu Domu upotrijebili su za baale.”
Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala.
8 Potom kralj zapovjedi da se napravi kovčeg i stavi izvana na vrata Jahvina Doma.
Mokonzi apesaki mitindo ete basala sanduku, batia yango na libanda ya ekuke ya Tempelo ya Yawe
9 Oglasiše po Judi i Jeruzalemu da se donosi Jahvi porez što ga bijaše odredio Božji sluga Mojsije Izraelu u pustinji.
mpe batatola kati na Yuda mpe kati na Yelusalemi ete basengeli komemela Yawe mpako oyo Moyize, mosali na Nzambe, akatelaki Isalaele kati na esobe.
10 Obradovaše se svi knezovi i sav narod i počeše donositi i bacati u kovčeg dok se nije napunio.
Bakalaka nyonso mpe bato nyonso basepelaki na yango: bamemaki mbongo na bango mpe batiaki yango kati na sanduku kino etondaki.
11 Leviti bi donosili kovčeg kraljevskom nadgledništvu, i kad bi se vidjelo da ima mnogo novaca, dolazio je kraljev tajnik i povjerenik svećeničkog poglavara te bi ispraznili kovčeg. Onda su ga opet odnosili i stavljali na njegovo mjesto. Tako su činili svaki dan i sabrali mnogo novca.
Tango nyonso Balevi bazalaki komema sanduku epai ya bakalaka ya mokonzi mpe bazalaki komona ete ezalaki na mbongo ebele, mokomi mikanda ya mokonzi mpe mobombi biloko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kolongola mbongo oyo ezalaki kati na sanduku mpe kozongisa sanduku na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mikolo nyonso mpe bazalaki kokongola mbongo ebele.
12 Onda su ga kralj i Jojada davali poslovođama nad poslom oko Jahvina Doma, a oni su za plaću unajmljivali klesare i drvodjelce da se obnovi Jahvin Dom, pa kovače i mjedare da se popravi Jahvin Dom.
Mokonzi mpe Yeoyada bazalaki kopesa yango na bato oyo bazalaki kosala misala ya kobongisa Tempelo ya Yawe. Bafutaki babuki mabanga, basharipantie mpe bato oyo basalaka misala ya bibende mpe ya bronze na moto, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
13 Poslovođe su poslovale i popravljanje je napredovalo pod njihovom upravom; vratili su Božji Dom u red i obnovili ga.
Bato oyo bazalaki kosala misala basalaki yango noki, mpe misala ezalaki kotambola malamu na bokambami na bango. Babongisaki Tempelo ya Nzambe ndenge ezalaka.
14 A kad su sve svršili, donijeli su pred kralja i Jojadu novce što su ostali; od toga su napravili posuđe za Jahvin Dom, posuđe za posluživanje, za paljenje, plitice i druge zlatne i srebrne predmete. Paljenice su se prinosile u Jahvinu Domu bez prestanka dok je god živio Jojada.
Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.
15 Onda je Jojada, ostarjevši i nasitivši se života, umro u sto i tridesetoj godini.
Yeoyada akomaki mobange makasi, atondaki mikolo mpe akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama.
16 Sahranili su ga u Davidovu gradu kod kraljeva, jer je činio dobro u Izraelu i prema Bogu i njegovu Domu.
Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi esika moko na bakonzi mpo na bolamu oyo asalaki kati na Isalaele, mpo na Nzambe mpe mpo na Tempelo ya Yawe.
17 Poslije Jojadine smrti došli su Judini knezovi i poklonili se kralju. Tada ih kralj poče slušati.
Sima na kufa ya Yeoyada, bakambi ya Yuda bayaki kopesa mokonzi lokumu, mpe mokonzi ayokaki bango.
18 Judejci bijahu ostavili Jahvu, Boga otaca, i stali služiti ašerama i likovima; došla je Božja srdžba na Judejce i na Jeruzalem za tu krivicu.
Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi.
19 Slao im je Bog proroke da ih obrate k Jahvi, oni su ih opominjali, ali oni nisu htjeli slušati.
Atako Yawe atindaki basakoli kati na bango mpo na kozongisa bango epai na Ye, mpe atako basakoli bapamelaki bango, kasi batikalaki kaka koyoka te.
20 Tada Božji duh napuni Jojadina sina, svećenika Zahariju, koji, stavši poviše naroda, reče: “Ovako veli Bog: 'Zašto kršite Jahvine zapovijedi? Zašto nećete da budete sretni? Kako ste vi ostavili Jahvu, i on će vas ostaviti.'”
Molimo ya Nzambe akitelaki Zakari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada, mpe Zakari atelemaki liboso ya bato mpe alobaki: « Tala makambo oyo Nzambe alobi: ‹ Mpo na nini bozali kotosa mitindo ya Yawe te? Bokokende liboso te! Lokola bosundoli Yawe, Ye mpe asundoli bino. › »
21 Ali su se oni pobunili protiv njega i zasuli ga kamenjem po kraljevoj zapovijedi u predvorju Jahvina Doma.
Kasi bato basalelaki ye likita; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe.
22 Ni kralj Joaš ne sjeti se ljubavi koju mu učini otac Jojada, nego mu ubi sina; a on je umirući rekao: “Jahve neka vidi i osveti!”
Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki: « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo! »
23 Kad je prošla godina dana, diže se na nj aramejska vojska i, navalivši na Judu i Jeruzalem, pobi sve knezove u narodu i posla sav plijen kralju u Damask.
Na suka ya mobu, basoda ya Siri babundisaki Joasi, bakotaki na makasi kati na Yuda mpe Yelusalemi, babomaki bakambi nyonso ya bato mpe batindaki bomengo nyonso ya bitumba epai ya mokonzi na bango, na Damasi.
24 Iako je aramejska vojska bila malena po ljudstvu, ipak joj je Jahve predao u ruke vrlo brojnu vojsku, jer ostaviše Jahvu, Boga svojih otaca. Tako su se Aramejci na Joašu osvetili.
Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi.
25 Kad su otišli od njega, ostaviv ga u teškim bolestima, pobuniše se protiv njega njegovi časnici jer bijaše ubio sina svećenika Jojade, pa i oni njega ubiše na postelji te je poginuo; sahranili su ga u Davidovu gradu, ali ga nisu ukopali u kraljevskoj grobnici.
Tango bato ya Siri bazongaki, batikaki Joasi na bapota minene. Bakalaka na ye basalelaki ye likita na ndenge abomaki mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada mpe babomaki ye na mbeto na ye. Boye, akufaki mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.
26 Evo onih što se urotiše protiv njega: Zabad, sin Amonke Šimeate, i Jozabad, sin Moapke Šimrite.
Tala bato oyo basalelaki ye likita: Zabadi, mwana mobali ya Shimeati, mwasi ya mboka Amoni; mpe Yozabadi, mwana mobali ya Shimiriti, mwasi ya Moabi.
27 A o njegovim sinovima i o velikim proroštvima protiv njega, o obnavljanju Doma Božjega, sve je zapisano u tumačenju Knjige o kraljevima. Na njegovo se mjesto zakraljio sin mu Amasja.
Bakombo ya bana na ye ya mibali, maloba nyonso oyo basakolaki mpo na ye mpe mikano oyo babongisaki mpo na Tempelo ya Nzambe ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.