< 2 Ljetopisa 22 >

1 Jeruzalemci zakraljiše na njegovo mjesto najmlađeg mu sina, Ahazju, jer sve starije bijaše poubijala četa koja je s Arapima navalila na tabor; tako se zakraljio Ahazja, sin judejskoga kralja Jorama.
Bato ya Yelusalemi bakomisaki Akazia, mwana mobali ya suka ya Yorami, mokonzi mpo na kokitana na ye, pamba te bato ya mobulu oyo bakotaki na molako elongo na bato ya Arabi babomaki bana mibali nyonso. Ezali boye nde Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
2 Bile su mu četrdeset i dvije godine kad se zakraljio. Kraljevao je jednu godinu u Jeruzalemu. Materi mu je bilo ime Atalija, Omrijeva kći.
Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri.
3 I on je išao putovima doma Ahabova, jer ga mati zlo svjetovaše.
Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe.
4 Činio je što je zlo u Jahvinim očima, kao dom Ahabov, jer mu baš oni bijahu savjetnici poslije očeve smrti, na njegovu propast.
Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye.
5 Po njihovu je savjetu pošao s Joramom, sinom izraelskoga kralja Ahaba, u boj na aramejskoga kralja Hazaela u Ramot Gilead. Ali su Aramejci porazili Jorama.
Alandaki mpe batoli na bango tango akendeki na bitumba elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Kasi bato ya Arami bazokisaki Yorami.
6 On se vratio da se liječi u Jizreelu od rana što mu ih zadadoše u Rami kad se borio s aramejskim kraljem Hazaelom. Joramov sin Ahazja, judejski kralj, sišao je u Jizreel da posjeti Ahabova sina Jorama jer se Joram razbolio.
Bongo, Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Azaria, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.
7 Ali Bog učini da taj posjet Joramu bude na propast Ahazji. Došavši, izišao je s Joramom na Nimšijeva sina Jehua, koga je Jahve pomazao da iskorijeni Ahabovu kuću.
Nzambe asalaki ete kobebisama ya Akazia esalema tango akendeki kotala Yorami. Tango kaka Akazia akomaki, abimaki nzela moko na Yorami mpo na kokende epai ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo Yawe apakolaki mafuta mpo na kobebisa ndako ya Akabi.
8 Dok je izvršavao osvetu nad Ahabovom kućom, Jehu zateče judejske knezove i sinove Ahazjine braće koji su posluživali Ahazju i pobi ih,
Tango Jewu azalaki kokokisa etumbu kati na libota ya Akabi, akutaki bakambi ya Yuda mpe bana mibali ya bandeko mibali ya Akazia, oyo bazalaki kosalela tata leki na bango Akazia, mpe abomaki bango.
9 a onda krenu u potragu za Ahazjom. Uhvatili su ga dok se krio u Samariji, doveli ga k Jehuu, koji ga smaknu. Ukopali su ga, jer su rekli: “Sin je onoga Jošafata koji je tražio Jahvu svim srcem.” Tako ne ostade nitko od Ahazjine kuće koji bi imao snage da bude kralj.
Bongo, akendeki koluka Akazia, mpe bato na ye bakangaki Akazia kati na Samari epai wapi abombamaki. Bamemaki ye epai ya Jewu mpe babomaki ye. Bakundaki ye, pamba te bamilobelaki: « Azalaki mwana mobali ya Jozafati oyo azalaki koluka Yawe na motema na ye mobimba. » Ezalaki lisusu na moto ya nguya ata moko te kati na libota ya Akazia mpo na kobatela bokonzi.
10 Zato Ahazjina mati Atalija, vidjevši gdje joj sin poginu, ustade i posmica sav kraljevski rod Judina plemena.
Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya bokonzi ya ndako ya Yuda.
11 Ali kraljeva kći Jošeba uze Ahazjina sina Joaša; ukravši ga između kraljevih sinova koje su ubijali, metnu ga s dojiljom u ložnicu. Tako ga je Jošeba, kći kralja Jorama, žena svećenika Jojade, sakrila od Atalije, jer je bila Ahazjina sestra, te nije bio pogubljen.
Kasi Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia, alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma, mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto. Lokola Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe mwasi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, azalaki ndeko mwasi ya Akazia, abombaki Joasi mosika ya miso ya Atali; mpe Atali abomaki Joasi te.
12 Bio je sakriven s njima u Domu Božjem šest godina, sve dok je zemljom vladala Atalija.
Joasi abombamaki elongo na bango mibu motoba kati na Tempelo ya Nzambe, wana Atali azalaki kokonza mokili.

< 2 Ljetopisa 22 >