< ⲚⲒⲔⲞⲢⲒⲚⲐⲒⲞⲤ Ⲃ ̅ 8 >
1 ⲁ̅ ⲧⲛⲧⲁⲙⲟ ⲇⲉ ⲙⲙⲱⲧⲛ ⲛⲉⲥⲛⲏⲩ ⲉⲧⲉⲭⲁⲣⲓⲥ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲧⲁⲓ ⲉⲛⲧⲁⲩⲧⲁⲁⲥ ϩⲛ ⲛⲉⲕⲕⲗⲏⲥⲓⲁ ⲛⲧⲙⲁⲕⲉⲇⲟⲛⲓⲁ
Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Mangomba ya Masedwane.
2 ⲃ̅ ϫⲉ ϩⲛ ⲟⲩⲛⲟϭ ⲛⲇⲟⲕⲓⲙⲏ ⲛⲑⲗⲓⲯⲓⲥ ⲁⲡⲉϩⲟⲩⲟ ⲙⲡⲉⲩⲣⲁϣⲉ ⲙⲛ ⲧⲉⲩⲙⲛⲧϩⲏⲕⲉ ⲉⲧⲛⲁϣⲱⲥ ⲣϩⲟⲩⲟ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲧⲙⲛⲧⲣⲙⲙⲁⲟ ⲛⲧⲉⲩⲙⲛⲧϩⲁⲡⲗⲟⲩⲥ
Atako bazalaki na mikakatano ya ndenge na ndenge, kasi batondisamaki na esengo oyo eleka ndelo; mpe kati na bobola na bango ya makasi, bapesaki makabo mingi koleka.
3 ⲅ̅ ϫⲉ ϯⲣⲙⲛⲧⲣⲉ ϫⲉ ⲕⲁⲧⲁⲧⲉⲩϭⲟⲙ ⲁⲩⲱ ⲡⲁⲣⲁⲧⲉⲩϭⲟⲙ ϩⲁ ⲡⲉⲩϩⲧⲟⲣ ⲟⲩⲁⲁⲧⲟⲩ
Nazali kotatola ete bapesaki kolanda makoki na bango, mpe bapesaki kutu koleka. Bapesaki yango na kotindika te
4 ⲇ̅ ⲉⲩⲥⲟⲡⲥ ⲙⲙⲟⲛ ϩⲛ ⲟⲩⲛⲟϭ ⲛⲥⲟⲡⲥ ⲉϫⲓ ⲛⲧⲉⲩⲭⲁⲣⲓⲥ ⲙⲛ ⲧⲕⲟⲓⲛⲱⲛⲓⲁ ⲛⲧⲇⲓⲁⲕⲟⲛⲓⲁ ⲉⲧϫⲓ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲛⲉⲧⲟⲩⲁⲁⲃ
mpe basengaki biso kutu na molende nyonso ete tosalela bango ngolu ya kosangana elongo na biso kati na mosala ya kosunga basantu.
5 ⲉ̅ ⲉⲛⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲁⲛ ⲉⲛⲧⲁⲛϩⲉⲗⲡⲓⲍⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲁⲩⲧⲁⲁⲩ ⲛϣⲟⲣⲡ ⲙⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲁⲩⲱ ⲛⲁⲛ ϩⲓⲧⲙ ⲡⲟⲩⲱϣ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ
Basalaki koleka ndenge tokanisaki: bamipesaki liboso, bango moko, epai ya Nkolo, mpe sima, epai na biso, kolanda mokano ya Nzambe.
6 ⲋ̅ ⲉⲧⲣⲉⲛⲡⲁⲣⲁⲕⲁⲗⲉⲓ ⲛⲧⲓⲧⲟⲥ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲉⲛⲧⲁϥⲁⲣⲭⲓ ϫⲓⲛ ⲛϣⲟⲣⲡ ⲛϥϫⲱⲕ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲧⲉⲉⲓϩⲉ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲛⲧⲉⲓⲕⲉⲭⲁⲣⲓⲥ
Boye, tosengaki na Tito ete akomisa kino na suka mosala yango ya kosunga, ndenge abandaki yango kati na bino.
7 ⲍ̅ ⲁⲗⲗⲁ ⲛⲑⲉ ⲉⲧⲉⲧⲛⲟ ⲛϩⲟⲩⲟ ϩⲛ ϩⲱⲃ ⲛⲓⲙ ϩⲛ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲙⲛ ⲡϣⲁϫⲉ ⲙⲛ ⲡⲥⲟⲟⲩⲛ ⲙⲛ ⲥⲡⲟⲩⲇⲏ ⲛⲓⲙ ⲁⲩⲱ ⲧⲉⲛⲁⲅⲁⲡⲏ ⲉⲧϣⲟⲟⲡ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲣⲱⲧⲛ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉⲧⲉⲧⲛⲉⲣϩⲟⲩⲟ ϩⲛ ⲧⲉⲓⲕⲉⲭⲁⲣⲓⲥ
Kasi mpo ete bozali kokoba kokende liboso kati na makambo nyonso lokola kondima, liloba, boyebi, molende kati na makambo nyonso, bolingo na biso mpo na bino, tomoni ete boluka mpe kokende liboso kati na mosala yango ya kosunga.
8 ⲏ̅ ⲛⲉⲓϫⲱ ⲙⲙⲟⲥ ⲁⲛ ⲕⲁⲧⲁ ⲟⲩⲉϩⲥⲁϩⲛⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓⲧⲛ ⲧⲉⲥⲡⲟⲩⲇⲏ ⲛϩⲉⲛⲕⲟⲟⲩⲉ ⲉⲓⲇⲟⲕⲓⲙⲁⲍⲉ ϩⲱⲧⲧⲏⲩⲧⲛ ⲛⲧⲙⲛⲧϩⲁⲕ ⲛⲧⲉⲧⲛⲁⲅⲁⲡⲏ
Nazali kopesa bino mitindo te, kasi nazali nde koluka komeka bosolo ya bolingo na bino na kokokanisa yango na molende ya bato mosusu.
9 ⲑ̅ ⲧⲉⲧⲛⲉⲓⲙⲉ ⲅⲁⲣ ⲉⲧⲭⲁⲣⲓⲥ ⲙⲡⲉⲛϫⲟⲉⲓⲥ ⲓⲏⲥ ϫⲉ ⲁϥⲣϩⲏⲕⲉ ⲉⲧⲃⲉ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲉⲩⲣⲙⲙⲁⲟ ⲡⲉ ϫⲉⲕⲁⲥ ϩⲱⲧ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲉⲧⲉⲧⲛⲉⲣⲣⲙⲙⲁⲟ ϩⲛ ⲧⲙⲛⲧϩⲏⲕⲉ ⲙⲡⲉⲧⲙⲙⲁⲩ
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso: Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
10 ⲓ̅ ϯϯ ⲇⲉ ⲛⲟⲩⲅⲛⲱⲙⲏ ⲛⲏⲧⲛ ⲙⲡⲁⲓ ⲡⲁⲓ ⲅⲁⲣ ⲡⲉⲧⲣⲛⲟϥⲣⲉ ⲛⲏⲧⲛ ⲛⲁⲓ ⲙⲡⲉⲓⲣⲉ ⲙⲙⲁⲧⲉ ⲁⲛ ⲁⲗⲗⲁ ⲡⲕⲉⲟⲩⲱϣ ⲁⲧⲉⲧⲛⲁⲣⲭⲓ ⲙⲙⲟϥ ϫⲓⲛ ⲥⲛⲟⲩϥ
Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino: na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.
11 ⲓ̅ⲁ̅ ⲧⲉⲛⲟⲩ ⲇⲉ ϫⲉ ⲕⲡⲕⲉⲉⲓⲣⲉ ⲉⲃⲟⲗ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲙⲡⲟⲩⲣⲟⲧ ⲙⲡⲟⲩⲱϣ ⲧⲁⲓ ⲧⲉ ⲑⲉ ⲙⲡⲕⲉϫⲱⲕ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲙ ⲡⲉⲧⲉⲟⲩⲛⲧⲏⲧⲛϥ
Boye, bokokisa sik’oyo likambo yango kolanda makoki na bino; molende oyo bozalaki na yango mpo na kolinga kosunga, bomonisa yango mpe na kokokisaka likambo yango.
12 ⲓ̅ⲃ̅ ⲉϣϫⲉ ⲡⲟⲩⲣⲟⲧ ⲅⲁⲣ ⲕⲏ ⲉϩⲣⲁⲓ ⲕⲁⲧⲁ ⲡⲉⲧⲉⲟⲩⲛⲧⲁϥⲥϥ ϥϣⲏⲡ ⲕⲁⲧⲁ ⲡⲉⲧⲉⲙⲛⲧⲁϥⲥϥ ⲁⲛ
Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.
13 ⲓ̅ⲅ̅ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ⲉⲣⲉⲟⲩⲙⲧⲟⲛ ϣⲱⲡⲉ ⲛϩⲟⲓⲛⲉ ⲛⲧⲉ ⲟⲩⲑⲗⲓⲯⲓⲥ ϣⲱⲡⲉ ⲛⲏⲧⲛ ⲁⲗⲗⲁ ϩⲛ ⲟⲩϣⲱϣ
Posa na biso ezali te ya koluka ete bino bomona pasi mpo ete bato mosusu bazala na esengo, kasi ezali kaka ya koluka ete bokokana.
14 ⲓ̅ⲇ̅ ϩⲙ ⲡⲉⲉⲓⲟⲩⲟⲉⲓϣ ⲧⲉⲛⲟⲩ ⲛⲧⲉ ⲡⲉⲧⲛϩⲟⲩⲟ ϣⲱⲡⲉ ⲉⲡϣⲱⲱⲧ ⲛⲛⲏ ϫⲉⲕⲁⲥ ϩⲱⲱϥ ⲉⲣⲉⲡⲉϩⲟⲩⲟ ⲛⲛⲏ ϣⲱⲡⲉ ⲉⲡⲉⲧⲛϣⲱⲱⲧ ϫⲉ ⲉⲣⲉⲟⲩϣⲱϣ ϣⲱⲡⲉ
Mpo na tango oyo, lokola bozali kati na bofuluki, bokoki kosunga bato na biloko oyo bazali na yango na bosenga. Mokolo mosusu, tango bango mpe bakozala kati na bofuluki, bakosunga bino na biloko oyo bokozala na yango na bosenga. Na ndenge wana nde bokokokana,
15 ⲓ̅ⲉ̅ ⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲉⲧⲥⲏϩ ϫⲉ ⲡⲁ ⲡϩⲟⲩⲟ ⲙⲡϥⲣϩⲟⲩⲟ ⲁⲩⲱ ⲡⲁ ⲡⲕⲟⲩⲓ ⲙⲡϥⲥⲃⲟⲕ
kolanda ndenge ekomama: « Moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. »
16 ⲓ̅ⲋ̅ ⲡⲉϩⲙⲟⲧ ⲇⲉ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ϣⲏⲡ ⲡⲁⲓ ⲉⲧϯ ⲛϯⲥⲡⲟⲩⲇⲏ ⲛⲟⲩⲱⲧ ϩⲁⲣⲱⲧⲛ ϩⲙ ⲡϩⲏⲧ ⲛⲧⲓⲧⲟⲥ
Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino!
17 ⲓ̅ⲍ̅ ϫⲉ ⲡⲉⲛⲥⲟⲡⲥ ⲙⲉⲛ ⲁϥϫⲓⲧϥ ⲉϥⲟ ⲇⲉ ⲛⲥⲡⲟⲩⲇⲁⲓⲟⲥ ⲛϩⲟⲩⲟ ⲁϥⲉⲓ ⲉⲃⲟⲗ ϣⲁⲣⲱⲧⲛ ⲉϩⲛⲁϥ
Pamba te Tito ayambaki na esengo makasi likanisi oyo topesaki ye ya koya epai na bino; mpe ezali na mokano na ye moko nde ayei epai na bino.
18 ⲓ̅ⲏ̅ ⲁⲛⲧⲛⲛⲟⲟⲩ ⲇⲉ ⲛⲙⲙⲁϥ ⲙⲡⲥⲟⲛ ⲡⲁⲓ ⲉⲧⲉⲣⲉⲡⲉϥⲧⲁⲉⲓⲟ ϣⲟⲟⲡ ϩⲙ ⲡⲉⲩⲁⲅⲅⲉⲗⲓⲟⲛ ϩⲓⲧⲛ ⲛⲉⲕⲕⲗⲏⲥⲓⲁ ⲧⲏⲣⲟⲩ
Elongo na ye, tozali kotinda ndeko oyo Mangomba nyonso ekumisaka mpo na Sango Malamu.
19 ⲓ̅ⲑ̅ ⲟⲩ ⲙⲟⲛⲟⲛ ⲇⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲁⲩⲣⲡⲕⲉⲛⲉϩϥ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓⲧⲛ ⲛⲉⲕⲕⲗⲏⲥⲓⲁ ⲉⲧⲣⲉϥⲉⲓ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲙⲙⲁⲛ ϩⲙ ⲡⲉⲓϩⲙⲟⲧ ⲉⲧⲟⲩⲇⲓⲁⲕⲟⲛⲓ ⲙⲙⲟϥ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓ ⲧⲟⲟⲧⲛ ⲛⲛⲁϩⲣⲙ ⲡⲉⲟⲟⲩ ⲙⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲙⲛ ⲡⲉⲛⲟⲩⲣⲟⲧ
Lisusu, ezali Mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya kosunga. Tozali kosala mosala yango mpo na lokumu ya Ye moko Nkolo, mpe mpo na kolakisa molende na biso ya kosunga bino.
20 ⲕ̅ ⲉⲛⲥⲓϩⲉ ⲙⲙⲟⲛ ⲙⲡⲁⲓ ⲙⲏⲡⲱⲥ ⲛⲧⲉ ⲟⲩⲁ ⲧⲉϭⲟⲩⲧⲱⲗⲙ ⲉⲣⲟⲛ ϩⲙ ⲡⲉⲉⲓⲧⲁϫⲣⲟ ⲉⲧⲟⲩⲇⲓⲁⲕⲟⲛⲓ ⲙⲙⲟϥ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓ ⲧⲟⲟⲧⲛ
Tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo ete batonga biso te mpo na lolenge na biso ya kosalela ebele yango ya makabo.
21 ⲕ̅ⲁ̅ ⲧⲛϥⲓ ⲅⲁⲣ ⲙⲡⲣⲟⲟⲩϣ ⲛϩⲉⲛⲡⲉⲧⲛⲁⲛⲟⲩⲟⲩ ⲙⲡⲉⲙⲧⲟ ⲉⲃⲟⲗ ⲙⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲙⲙⲁⲧⲉ ⲁⲛ ⲁⲗⲗⲁ ⲙⲡⲉⲙⲧⲟ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲛⲕⲉⲣⲱⲙⲉ
Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.
22 ⲕ̅ⲃ̅ ⲁⲛⲧⲛⲛⲟⲟⲩ ⲇⲉ ⲛⲙⲙⲁⲩ ⲙⲡⲉⲛⲕⲉⲥⲟⲛ ⲡⲁⲓ ⲉⲛⲧⲁⲛⲇⲟⲕⲓⲙⲁⲍⲉ ⲙⲙⲟϥ ϩⲛ ϩⲁϩ ⲛⲥⲟⲡ ⲉⲩⲥⲡⲟⲩⲇⲁⲓⲟⲥ ⲡⲉ ⲧⲉⲛⲟⲩ ⲇⲉ ⲛϩⲟⲩ ⲉⲥⲡⲟⲩⲇⲁⲓⲟⲥ ϩⲛ ⲟⲩⲛⲁϩⲧⲉ ⲇⲉ ⲉⲛⲁϣⲱϥ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲣⲱⲧⲛ
Elongo na bango, tozali kotinda ndeko na biso, oyo tondimaka mbala na mbala bolingo na ye. Mpe na mbala oyo, azali na yango lisusu koleka, pamba te azali penza kotiela bino motema.
23 ⲕ̅ⲅ̅ ⲉⲓⲧⲉ ϩⲁ ⲧⲓⲧⲟⲥ ⲡⲁⲕⲟⲓⲛⲱⲛⲟⲥ ⲡⲉ ⲁⲩⲱ ⲛϣⲃⲣⲣϩⲱⲃ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲉⲓⲧⲉ ⲛⲉⲛⲥⲛⲏⲩ ⲛⲁⲡⲟⲥⲧⲟⲗⲟⲥ ⲛⲉ ⲛⲛⲉⲕⲕⲗⲏⲥⲓⲁ ⲡⲉⲟⲟⲩ ⲙⲡⲉⲭⲥ
Tito azali molingami mpe moninga na ngai ya mosala kati na bino, kasi bandeko na biso bazali batindami ya Mangomba mpe nkembo ya Klisto.
24 ⲕ̅ⲇ̅ ⲡⲟⲩⲱⲛϩ ϭⲉ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲧⲉⲧⲛⲁⲅⲁⲡⲏ ⲁⲩⲱ ⲡⲉⲛϣⲟⲩϣⲟⲩ ⲉⲧⲛⲉⲓⲣⲉ ⲙⲙⲟϥ ϩⲁⲣⲱⲧⲛ ⲟⲩⲟⲛϩⲟⲩ ⲉⲣⲟⲟⲩ ⲙⲡⲉⲙⲧⲟ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲛⲉⲕⲕⲗⲏⲥⲓⲁ
Yango wana, bolakisa bango elembo ya bolingo na bino mpo ete Mangomba nyonso endima mpe eyeba ete tomikumisaka na pamba te na tina na bino liboso na bango.