< ⲚⲒⲔⲞⲢⲒⲚⲐⲒⲞⲤ Ⲃ ̅ 2 >

1 ⲁ̅ ⲫⲁⲓ ⲅⲁⲣ ⲁⲓϯϩⲁⲡ ⳿ⲉⲣⲟϥ ⳿ⲛ⳿ϧⲣⲏⲓ ⳿ⲛϧⲏⲧ ⳿ⲉ⳿ϣⲧⲉⲙ⳿ⲑⲣⲓ⳿ⲓ ϩⲁⲣⲱⲧⲉⲛ ⲟⲛ ϧⲉⲛ ⲟⲩ⳿ⲙⲕⲁϩ ⳿ⲛϩⲏⲧ.
Yango wana nazwaki mokano ya kozongela bino te mpo ete nayokisa bino lisusu mawa te.
2 ⲃ̅ ⲓⲥϫⲉ ⲅⲁⲣ ⳿ⲁⲛⲟⲕ ⲉⲧϯⲉⲙⲕⲁϩ ⳿ⲛϩⲏⲧ ⲛⲱⲧⲉⲛ ⲓⲉ ⲛⲓⲙ ⲉⲧ⳿ⲑⲣⲟ ⳿ⲙⲙⲟⲓ ⳿ⲉⲟⲩⲛⲟϥ ⳿ⲉⲃⲏⲗ ⳿ⲉⲫⲏ ⲉⲑⲙⲟⲕϩ ⳿ⲛϩⲏⲧ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ⳿ⲙⲙⲟⲓ.
Pamba te soki nayokisi bino mawa, banani bakosepelisa ngai lisusu soki kaka te bino oyo ngai nayokisi mawa?
3 ⲅ̅ ⲟⲩⲟϩ ⲫⲁⲓ ⲁⲓ⳿ⲥϧⲏⲧϥ ϩⲓⲛⲁ ⲁⲓϣⲁⲛ⳿ⲓ ϩⲁⲣⲱⲧⲉⲛ ⲟⲛ ⳿ⲛⲧⲁ⳿ϣⲧⲉⲙϭⲓ⳿ⲙⲕⲁϩ ⳿ⲛϩⲏⲧ ⳿ⲛⲧⲉ ⲛⲏ ⲉⲧⲉⲥ⳿ⲙ⳿ⲡϣⲁ ⲛⲏⲓ ⳿ⲛⲧⲁⲣⲁϣⲓ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ⳿ⲙⲙⲱⲟⲩ ⲉⲣⲉ ⲡⲁϩⲏⲧ ⲑⲏⲧ ⳿ⲉ⳿ϩⲣⲏⲓ ⳿ⲉϫⲉⲛ ⲑⲏⲛⲟⲩ ⲧⲏⲣⲟⲩ ϫⲉ ⲡⲁⲣⲁϣⲓ ⲫⲱⲧⲉⲛ ⲧⲏⲣⲟⲩ ⲡⲉ.
Nakomelaki bino ndenge mpe nasali yango sik’oyo mpo ete bato oyo basengeli kosepelisa ngai bayokisa ngai mawa te tango nakoya. Nandimisami penza na tina na bino nyonso ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso.
4 ⲇ̅ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ⲅⲁⲣ ϧⲉⲛ ⲟⲩⲛⲓϣϯ ⳿ⲛϩⲟϫϩⲉϫ ⲛⲉⲙ ⲟⲩⲉⲙⲕⲁϩ ⳿ⲛϩⲏⲧ ⲁⲓ⳿ⲥϧⲁⲓ ⲛⲱⲧⲉⲛ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓⲧⲉⲛ ⲟⲩⲙⲏϣ ⳿ⲛⲉⲣⲙⲏ ϫⲉ ⳿ⲛⲧⲉ ⲡⲉⲧⲉⲛϩⲏ⳿ⲙⲕⲁϩ ⲁⲛ ⲁⲗⲗⲁ ϫⲉⲭⲁⲥ ⳿ⲛⲧⲉⲧⲉⲛ⳿ⲉⲙⲓ ⳿ⲉϯ ⲁⲅⲁⲡⲏ ⲉⲧⲉⲣϩⲟⲩ⳿ⲟ ⳿ⲛϧⲏⲧ ⳿ⲉⲣⲱⲧⲉⲛ.
Solo, tango nakomelaki bino, nazalaki kati na pasi makasi, kati na komitungisa na motema na ngai, mpe kati na kolela makasi; ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba mozindo ya bolingo na ngai mpo na bino.
5 ⲉ̅ ⲓⲥϫⲉ ⲇⲉ ⲁ ⲟⲩⲁⲓ ϯ ⳿ⲙⲕⲁϩ⳿ⲛϩⲏⲧ ⲛⲉⲧⲁϥϯ ⳿ⲙⲕⲁϩ⳿ⲛϩⲏⲧ ⲛⲏⲓ ⲁⲛ ⲁⲗⲗⲁ ⲁⲡⲟⲙⲉⲣⲟⲥ ϩⲓⲛⲁ ⳿ⲛⲧⲁ⳿ϣⲧⲉⲙⲟⲩⲁϩⲃⲁⲣⲟⲥ ⳿ⲉϫⲉⲛ ⲑⲏⲛⲟⲩ ⲧⲏⲣⲟⲩ.
Soki moko kati na bino ayokisaki moninga na ye mawa, ayokisaki yango ngai te kasi ayokisaki nde bino nyonso to ndambo kati na bino, mpo nalekisa ndelo te.
6 ⲋ̅ ⲕⲏⲛ ⳿ⲉⲫⲁⲓ ⳿ⲙⲡⲁⲓⲣⲏϯ ⳿ ⲉⲧⲁⲓ ⳿ ⲉⲡⲓⲧⲓⲙⲓⲁ ⲑⲁⲓ ⲉⲧⲁⲥϣⲱⲡⲓ ⳿ⲉⲃⲟⲗϩⲓⲧⲉⲛ ⲟⲩⲙⲏϣ.
Mpo na yango, ekokaki penza ete bato oyo baleki ebele kati na bino bapamela ye.
7 ⲍ̅ ϩⲱⲥⲧⲉ ⲡⲉⲧⲟⲩⲃⲏϥ ⲙⲁⲗⲗⲟⲛ ⳿ⲛⲧⲉⲧⲉⲛⲉⲣ⳿ϩⲙⲟⲧ ⲟⲩⲟϩ ⳿ⲛⲧⲉⲧⲉⲛϯⲛⲟⲙϯ ⲛⲁϥ ⲙⲏⲡⲱⲥ ϧⲉⲛ ⲡⲓϩⲟⲩ⳿ⲟ ⳿ⲛⲉⲙⲕⲁϩⲛϩⲏⲧ ⳿ⲛⲥⲉⲱⲙⲕ ⳿ⲙⲫⲁⲓ ⳿ⲙⲡⲁⲓⲣⲏϯ.
Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.
8 ⲏ̅ ⲉⲑⲃⲉⲫⲁⲓ ϯϯϩⲟ ⳿ⲉⲣⲱⲧⲉⲛ ⳿ⲉⲧⲁϫⲣⲉ ⲟⲩ⳿ⲁⲅⲁⲡⲏ ⳿ⲉϧⲟⲩⲛ ⳿ⲉⲣⲟϥ.
Yango wana, nazali kosenga na bino ete bolinga ye lisusu.
9 ⲑ̅ ⲉⲑⲃⲉⲫⲁⲓ ⲅⲁⲣ ⲁⲓ⳿ⲥϧⲁⲓ ⲛⲱⲧⲉⲛ ϩⲓⲛⲁ ⳿ⲛⲧⲁ⳿ⲉⲙⲓ ⳿ⲉⲧⲉⲧⲉⲛⲇⲟⲕⲓⲙⲏ ⲓⲥϫⲉ ⲧⲉⲧⲉⲛⲟⲓ ⳿ⲛⲣⲉϥⲥⲱⲧⲉⲙ ϧⲉⲛ ϩⲱⲃ ⲛⲓⲃⲉⲛ.
Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso.
10 ⲓ̅ ⲫⲏ ⲇⲉ ⳿ⲉⲧⲉⲧⲉⲛⲛⲁⲉⲣ⳿ϩⲙⲟⲧ ⲛⲁϥ ⳿ⲁⲛⲟⲕ ϩⲱ ϯ⳿ⲓⲣⲓ ⲛⲁϥ ⲕⲉ ⲅⲁⲣ ⳿ⲁⲛⲟⲕ ⳿ⲡ⳿ϩⲙⲟⲧ ⲉⲧⲁⲓⲁⲓϥ ⲫⲏ ⳿ⲉⲧⲁⲓⲁⲓϥ ⳿ⲛ⳿ϩⲙⲟⲧ ⲁⲓⲁⲓϥ ⲉⲑⲃⲉ ⲑⲏⲛⲟⲩ ϧⲉⲛ ⳿ⲡϩⲟ ⳿ⲛⲒⲏ̅ⲥ̅ Ⲡⲭ̅ⲥ.̅.
Moto nyonso oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye; mpe likambo oyo ngai nalimbisi, soki ezalaki penza na likambo ya kolimbisa, nalimbisi yango mpo na bolamu na bino na miso ya Klisto,
11 ⲓ̅ⲁ̅ ϩⲓⲛⲁ ⳿ⲛⲧⲉ⳿ϣⲧⲉⲙ ⳿ⲡⲥⲁⲧⲁⲛⲁⲥ ϭⲓⲧⲧⲉⲛ⳿ⲛϫⲟⲛⲥ ⳿ⲛⲧⲉⲛⲟⲃϣ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ⳿ⲛⲛⲉϥⲙⲉⲩ⳿.Ⲓ.
mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.
12 ⲓ̅ⲃ̅ ⳿ⲉⲧⲁⲓ⳿ⲓ ⲇⲉ ⳿ⲉ⳿ⲧⲣⲱⲁⲥ ⳿ⲉⲡⲓⲉⲩⲁⲅⲅⲉⲗⲓⲟⲛ ⳿ⲛⲧⲉ Ⲡⲭ̅ⲥ̅ ⲟⲩⲟϩ ⳿ⲉⲧⲁ ⲟⲩⲣⲟ ⲟⲩⲱⲛ ⲛⲏⲓ ϧⲉⲛ Ⲡ⳪.
Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai.
13 ⲓ̅ⲅ̅ ⳿ⲙⲡⲉ ⲡⲁⲡⲛ̅ⲁ̅ ⲉⲙⲧⲟⲛ ⳿ⲉⲧⲉ ⳿ⲙⲡⲓϫⲓⲙⲓ ⳿ⲛⲧⲓⲧⲟⲥ ⲡⲁⲥⲟⲛ ⲟⲩⲟϩ ⳿ⲉⲧⲁⲓⲉⲣⲁⲡⲟⲧⲁⲍⲉⲥⲑⲉ ⲛⲱⲟⲩ ⲁⲓ⳿ⲓ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ⳿ⲙⲙⲁⲩ ⳿ⲉ⳿ⲑⲙⲁⲕⲉⲇⲟⲛⲓⲁ.
Kasi motema na ngai etikalaki kozala na kimia te mpo ete namonaki kuna te ndeko na ngai, Tito. Boye, natikaki bango mpe nakendeki na Masedwane.
14 ⲓ̅ⲇ̅ ⳿ⲡ⳿ϩⲙⲟⲧ ⲇⲉ ⳿ⲙⲫϯ ϣⲏⲡ ⲫⲁⲓ ⲉⲑⲟⲩⲱⲛϩ ⳿ⲙⲙⲟⲛ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ⳿ⲛⲥⲏⲟⲩ ⲛⲓⲃⲉⲛ ϧⲉⲛ Ⲡⲭ̅ⲥ̅ ⲟⲩⲟϩ ⳿ⲛ⳿ⲥⲑⲟⲓ ⳿ⲛⲧⲉ ⲡⲉϥ⳿ⲉⲙⲓ ⲉϥⲟⲩⲱⲛϩ ⳿ⲙⲙⲟϥ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓⲧⲟⲧⲉⲛ ϧⲉⲛ ⲙⲁⲓ ⲛⲓⲃⲉⲛ.
Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.
15 ⲓ̅ⲉ̅ ϫⲉ ⳿ⲁⲛⲟⲛ ⲟⲩ⳿ⲥⲑⲟⲓⲛⲟⲩϥⲓ ⳿ⲛⲧⲉ Ⲡⲭ̅ⲥ̅ ⳿ⲙⲫϯ ϧⲉⲛ ⲛⲏⲉⲑⲛⲁⲛⲟϩⲉⲙ ⲛⲉⲙ ϧⲉⲛ ⲛⲏⲉⲑⲛⲁⲧⲁⲕⲟ.
Pamba te, mpo na Nzambe, tozali solo kitoko ya Klisto kati na bato oyo bazali na nzela ya lobiko mpe kati na ba-oyo bazali kobunga.
16 ⲓ̅ⲋ̅ ⳿ⲛϩⲁⲛⲟⲩⲟⲛ ⲙⲉⲛ ⳿ⲛⲟⲩ⳿ⲥⲑⲟⲓ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ϧⲉⲛ ⲟⲩⲙⲟⲩ ⲉⲩⲙⲟⲩ ⳿ⲛϩⲁⲛⲟⲩⲟⲛ ⲇⲉ ⳿ⲛⲟⲩ⳿ⲥⲑⲟⲓ ⳿ⲉⲃⲟⲗ ϧⲉⲛ ⲟⲩⲱⲛϧ ⲉⲩⲱⲛϧ ⲟⲩⲟϩ ⲛⲓⲙ ⲉⲧⲟⲓ ⳿ⲛϩⲓⲕⲁⲛⲟⲥ ⲟⲩⲃⲉ ⲛⲁⲓ.
Mpo na bamoko, tozali solo ya kufa, oyo ezali komema bango na kufa; mpe mpo na bamosusu, tozali solo ya bomoi, oyo ezali komema bango na bomoi. Boye nani azali na makoki mpo na mosala ya lolenge oyo?
17 ⲓ̅ⲍ̅ ⲁⲛⲟⲛ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ⳿ⲙ⳿ⲫⲣⲏϯ ⳿ⲛⲟⲩⲙⲏϣ ⲉⲩⲉⲣⲓⲉⲃϣⲱⲧ ⳿ⲙ⳿ⲡⲥⲁϫⲓ ⳿ⲙⲫϯ ⲁⲗⲗⲁ ϩⲱⲥ ⳿ⲉⲃⲟⲗϧⲉⲛ ⲟⲩⲧⲟⲩⲃⲟ ⲁⲗⲗⲁ ϩⲱⲥ ⳿ⲉⲃⲟⲗϧⲉⲛ ⲫϯ ⳿ⲙⲡⲉ⳿ⲙⲑⲟ ⳿ⲙⲫϯ ϧⲉⲛ Ⲡⲭ̅ⲥ̅ ⲧⲉⲛⲥⲁϫⲓ.
Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.

< ⲚⲒⲔⲞⲢⲒⲚⲐⲒⲞⲤ Ⲃ ̅ 2 >