< 詩篇 50 >
1 亞薩的詩。 大能者上帝-耶和華已經發言招呼天下, 從日出之地到日落之處。
Nzembo ya Azafi. Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.
Wuta na Siona, mboka kitoko, Nzambe azali kongenga lokola moyi.
3 我們的上帝要來,決不閉口。 有烈火在他面前吞滅; 有暴風在他四圍大颳。
Tika ete Nzambe na biso aya! Tika ete akanga monoko te! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.
Abengi Likolo, kuna na likolo, mpe mabele mpo na kokata makambo ya bato na Ye.
5 說:招聚我的聖民到我這裏來, 就是那些用祭物與我立約的人。
Alobi: « Bosangisela ngai bayengebene na ngai, ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai na nzela ya mbeka. »
6 諸天必表明他的公義, 因為上帝是施行審判的。 (細拉)
Likolo ekopanza sango ya bosembo na Ye, pamba te azali Nzambe ya bosembo.
7 我的民哪,你們當聽我的話! 以色列啊,我要勸戒你; 我是上帝,是你的上帝!
Bino bato na ngai, boyoka; nazali koloba na bino! Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo: « Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »
8 我並不因你的祭物責備你; 你的燔祭常在我面前。
Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo, pamba te bambeka na yo ya kotumba ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
Nakozwa ngombe te kati na ndako na yo to ntaba mobali kati na etonga na yo ya bibwele,
10 因為,樹林中的百獸是我的, 千山上的牲畜也是我的。
pamba te banyama nyonso ya zamba ezali ya ngai; ezala ata ebele ya banyama oyo ezali kati na bangomba, nyonso ezali ya ngai.
11 山中的飛鳥,我都知道; 野地的走獸也都屬我。
Nayebi bandeke nyonso ya bangomba; mpe banyama ya bilanga ezali ya ngai.
12 我若是飢餓,我不用告訴你, 因為世界和其中所充滿的都是我的。
Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te, pamba te mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya ngai.
Boni, okanisi penza ete ngai naliaka misuni ya bangombe to namelaka makila ya bantaba?
14 你們要以感謝為祭獻與上帝, 又要向至高者還你的願,
Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
15 並要在患難之日求告我; 我必搭救你,你也要榮耀我。
Mpe belela ngai na tango ya pasi; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
16 但上帝對惡人說:你怎敢傳說我的律例, 口中提到我的約呢?
Nzambe alobi na moto mabe: « Mpo na nini opanzaka sango ya mibeko na ngai mpe olobaka na tina na Boyokani na ngai?
Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai?
18 你見了盜賊就樂意與他同夥, 又與行姦淫的人一同有分。
Soki omoni moyibi, wana nde osepeli; mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.
Otikaka monoko na yo kosala mabe, lolemo na yo ebimisaka kaka lokuta.
Ovandaka mpo na kotonga ndeko na yo, mpe obebisaka lokumu ya bana ya mama na yo.
21 你行了這些事,我還閉口不言, 你想我恰和你一樣; 其實我要責備你,將這些事擺在你眼前。
Yango nde makambo oyo ozalaki kosala; mpe ngai nabatelaki kimia. Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo? Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso oyo nazwa yo na miso na yo.
22 你們忘記上帝的,要思想這事, 免得我把你們撕碎,無人搭救。
Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino: bososola makambo oyo; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.
23 凡以感謝獻上為祭的便是榮耀我; 那按正路而行的,我必使他得着我的救恩。
Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »