< 詩篇 49 >
1 可拉後裔的詩,交與伶長。 萬民哪,你們都當聽這話! 世上一切的居民,
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino bikolo nyonso, boyoka malamu makambo oyo; bino bavandi nyonso ya mokili, boyoka,
bato pamba mpe bato minene, bazwi mpe babola:
Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.
Nayokaka masese, mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.
5 在患難的日子,奸惡隨我腳跟,四面環繞我, 我何必懼怕?
Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
ba-oyo batielaka bomengo na bango motema mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango?
7 一個也無法贖自己的弟兄, 也不能替他將贖價給上帝,
Moko te akoki kosikola ndeko na ye, moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe mpo na lisiko na ye.
8 叫他長遠活着,不見朽壞; 因為贖他生命的價值極貴, 只可永遠罷休。
Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi, mpe ekotikala kofutama te.
Akokaki kozala na bomoi libela na libela, mpe akokaki kokufa te.
10 他必見智慧人死, 又見愚頑人和畜類人一同滅亡, 將他們的財貨留給別人。
Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele, mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.
11 他們心裏思想: 他們的家室必永存, 住宅必留到萬代; 他們以自己的名稱自己的地。
Bakunda na bango nde ekomaka bandako na bango mpo na libela, mpe bisika na bango ya kovanda mpo na seko na seko, atako bapesaki na bitando na bango ya mabele bakombo na bango mpo ete ebengamaka na yango.
12 但人居尊貴中不能長久, 如同死亡的畜類一樣。
Mozwi akowumelaka te na bomoi; ata aleki na lokumu, akokani na nyama oyo ezali kokufa.
13 他們行的這道本為自己的愚昧; 但他們以後的人還佩服他們的話語。 (細拉)
Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.
14 他們如同羊群派定下陰間; 死亡必作他們的牧者。 到了早晨,正直人必管轄他們; 他們的美容必被陰間所滅,以致無處可存。 (Sheol )
Bazali lokola bameme mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi; kufa ekokoma kobokola bango. Kala te, bato ya sembo bakonyata bango, kitoko na bango ekonzuluka, mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango. (Sheol )
15 只是上帝必救贖我的靈魂脫離陰間的權柄, 因他必收納我。 (細拉) (Sheol )
Kasi Nzambe akokangola bomoi na ngai wuta na maboko ya mboka ya bakufi, pamba te akokamata ngai. (Sheol )
Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi, soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.
17 因為,他死的時候甚麼也不能帶去; 他的榮耀不能隨他下去。
Pamba te akomema ata eloko moko te tango akokufa; bomengo na ye ekolanda ye te.
18 他活着的時候,雖然自誇為有福 (你若利己,人必誇獎你);
Atako, wana azalaki na bomoi, azalaki komimona moto apambolama— atako bato bakokumisa yo, pamba te omisali bolamu—
okokende kaka kokutana na bakoko na yo oyo bakotikala komona lisusu pole te.
Moto oyo azali mozwi, kasi azangi bososoli, azali lokola nyama oyo ezali kokufa.