< 路加福音 3 >
1 凱撒提庇留在位第十五年,本丟‧彼拉多作猶太巡撫,希律作加利利分封的王,他兄弟腓力作以土利亞和特拉可尼地方分封的王,呂撒聶作亞比利尼分封的王,
Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda; Erode azalaki moyangeli ya Galile; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.
2 亞那和該亞法作大祭司。那時,撒迦利亞的兒子約翰在曠野裏,上帝的話臨到他。
Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe.
3 他就來到約旦河一帶地方,宣講悔改的洗禮,使罪得赦。
Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani; na mateya na ye, azalaki koloba: « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »
4 正如先知以賽亞書上所記的話,說: 在曠野有人聲喊着說: 預備主的道, 修直他的路!
Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye: « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe: ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike!
5 一切山窪都要填滿; 大小山岡都要削平! 彎彎曲曲的地方要改為正直; 高高低低的道路要改為平坦!
Mabwaku nyonso ekotondisama, bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama,
mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »
7 約翰對那出來要受他洗的眾人說:「毒蛇的種類!誰指示你們逃避將來的忿怒呢?
Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango: « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya?
8 你們要結出果子來,與悔改的心相稱。不要自己心裏說:『有亞伯拉罕為我們的祖宗。』我告訴你們,上帝能從這些石頭中,給亞伯拉罕興起子孫來。
Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela: ‹ Abrayami azali koko na biso! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
9 現在斧子已經放在樹根上,凡不結好果子的樹就砍下來,丟在火裏。」
Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »
Ebele ya bato batunaki ye: — Tosengeli kosala nini?
11 約翰回答說:「有兩件衣裳的,就分給那沒有的;有食物的,也當這樣行。」
Yoane azongiselaki bango: — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.
12 又有稅吏來要受洗,問他說:「夫子,我們當做甚麼呢?」
Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango; batunaki Yoane: — Moteyi, tosengeli kosala nini?
Azongiselaki bango: — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.
14 又有兵丁問他說:「我們當做甚麼呢?」約翰說:「不要以強暴待人,也不要訛詐人,自己有錢糧就當知足。」
Basoda mpe batunaki ye: — Bongo biso, tosengeli kosala nini? Yoane azongiselaki bango: — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.
15 百姓指望基督來的時候,人都心裏猜疑,或者約翰是基督。
Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya.
16 約翰說:「我是用水給你們施洗,但有一位能力比我更大的要來,我就是給他解鞋帶也不配。他要用聖靈與火給你們施洗。
Yoane azongiselaki bango: — Ngai nazali kobatisa bino na mayi; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.
17 他手裏拿着簸箕,要揚淨他的場,把麥子收在倉裏,把糠用不滅的火燒盡了。」
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.
19 只是分封的王希律,因他兄弟之妻希羅底的緣故,並因他所行的一切惡事,受了約翰的責備;
Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.
Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko.
21 眾百姓都受了洗,耶穌也受了洗。正禱告的時候,天就開了,
Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,
22 聖靈降臨在他身上,形狀彷彿鴿子;又有聲音從天上來,說:「你是我的愛子,我喜悅你。」
mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo: « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »
23 耶穌開頭傳道,年紀約有三十歲。依人看來,他是約瑟的兒子;約瑟是希里的兒子;
Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi; Jozefi, mwana mobali ya Eli;
24 希里是瑪塔的兒子;瑪塔是利未的兒子;利未是麥基的兒子;麥基是雅拿的兒子;雅拿是約瑟的兒子;
Eli, mwana mobali ya Matati; Matati, mwana mobali ya Levi; Levi, mwana mobali ya Meliki; Meliki, mwana mobali ya Yanai; Yanai, mwana mobali ya Jozefi;
25 約瑟是瑪他提亞的兒子;瑪他提亞是亞摩斯的兒子;亞摩斯是拿鴻的兒子;拿鴻是以斯利的兒子;以斯利是拿該的兒子;
Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi; Amosi, mwana mobali ya Naumi; Naumi, mwana mobali ya Esili; Esili, mwana mobali ya Nagai;
26 拿該是瑪押的兒子;瑪押是瑪他提亞的兒子;瑪他提亞是西美的兒子;西美是約瑟的兒子;約瑟是猶大的兒子;猶大是約亞拿的兒子;
Nagai, mwana mobali ya Maati; Maati, mwana mobali ya Matatiasi; Matatiasi, mwana mobali ya Semeini; Semeini, mwana mobali ya Yoze; Yoze, mwana mobali ya Yoda;
27 約亞拿是利撒的兒子;利撒是所羅巴伯的兒子;所羅巴伯是撒拉鐵的兒子;撒拉鐵是尼利的兒子;尼利是麥基的兒子;
Yoda, mwana mobali ya Yoanani; Yoanani, mwana mobali ya Reza; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli; Shealitieli, mwana mobali ya Neri;
28 麥基是亞底的兒子;亞底是哥桑的兒子;哥桑是以摩當的兒子;以摩當是珥的兒子;珥是約細的兒子;
Neri, mwana mobali ya Meliki; Meliki, mwana mobali ya Adi; Adi, mwana mobali ya Kosami; Kosami, mwana mobali ya Elimadami; Elimadami, mwana mobali ya Eri;
29 約細是以利以謝的兒子;以利以謝是約令的兒子;約令是瑪塔的兒子;瑪塔是利未的兒子;
Eri, mwana mobali ya Jozue; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri; Eliezeri, mwana mobali ya Yorimi; Yorimi, mwana mobali ya Matati; Matati, mwana mobali ya Levi;
30 利未是西緬的兒子;西緬是猶大的兒子;猶大是約瑟的兒子;約瑟是約南的兒子;約南是以利亞敬的兒子;
Levi, mwana mobali ya Simeoni; Simeoni, mwana mobali ya Yuda; Yuda, mwana mobali ya Jozefi; Jozefi, mwana mobali ya Yonami; Yonami, mwana mobali ya Eliakimi;
31 以利亞敬是米利亞的兒子;米利亞是買南的兒子;買南是瑪達他的兒子;瑪達他是拿單的兒子;拿單是大衛的兒子;
Eliakimi, mwana mobali ya Meleya; Meleya, mwana mobali ya Mena; Mena, mwana mobali ya Matata; Matata, mwana mobali ya Natani; Natani, mwana mobali ya Davidi;
32 大衛是耶西的兒子;耶西是俄備得的兒子;俄備得是波阿斯的兒子;波阿斯是撒門的兒子;撒門是拿順的兒子;
Davidi, mwana mobali ya Izayi; Izayi, mwana mobali ya Obedi; Obedi, mwana mobali ya Boazi; Boazi, mwana mobali ya Salimoni; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni;
33 拿順是亞米拿達的兒子;亞米拿達是亞蘭的兒子;亞蘭是希斯崙的兒子;希斯崙是法勒斯的兒子;法勒斯是猶大的兒子;
Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini; Adimini, mwana mobali ya Arini; Arini, mwana mobali ya Etsironi; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi; Peretsi, mwana mobali ya Yuda;
34 猶大是雅各的兒子;雅各是以撒的兒子;以撒是亞伯拉罕的兒子;亞伯拉罕是他拉的兒子;他拉是拿鶴的兒子;
Yuda, mwana mobali ya Jakobi; Jakobi, mwana mobali ya Izaki; Izaki, mwana ya Abrayami; Abrayami, mwana mobali ya Tera; Tera, mwana mobali ya Naori;
35 拿鶴是西鹿的兒子;西鹿是拉吳的兒子;拉吳是法勒的兒子;法勒是希伯的兒子;希伯是沙拉的兒子;
Naori, mwana mobali ya Serugi; Serugi, mwana mobali ya Rewu; Rewu, mwana mobali ya Pelegi; Pelegi, mwana mobali ya Eberi; Eberi, mwana mobali ya Shela;
36 沙拉是該南的兒子;該南是亞法撒的兒子;亞法撒是閃的兒子;閃是挪亞的兒子;挪亞是拉麥的兒子;
Shela, mwana mobali ya Kayinami; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi; Aripakishadi, mwana mobali ya Semi; Semi, mwana mobali ya Noa; Noa, mwana mobali ya Lemeki;
37 拉麥是瑪土撒拉的兒子;瑪土撒拉是以諾的兒子;以諾是雅列的兒子;雅列是瑪勒列的兒子;瑪勒列是該南的兒子;該南是以挪士的兒子;
Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi; Matusalemi, mwana mobali ya Enoki; Enoki, mwana mobali ya Yeredi; Yeredi, mwana mobali ya Malaleeli; Malaleeli, mwana mobali ya Kenani;
38 以挪士是塞特的兒子;塞特是亞當的兒子;亞當是上帝的兒子。
Kenani, mwana mobali ya Enoshi; Enoshi, mwana mobali ya Seti; Seti, mwana mobali ya Adamu; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.