< 約書亞記 15 >

1 猶大支派按着宗族拈鬮所得之地是在儘南邊,到以東的交界,向南直到尋的曠野。
Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude.
2 他們的南界是從鹽海的儘邊,就是從朝南的海汊起,
Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi,
3 通到亞克拉濱坡的南邊,接連到尋,上到加低斯‧巴尼亞的南邊,又過希斯崙,上到亞達珥,繞到甲加,
emataki kino na ngambo ya sude ya Akarabimi mpe elekaki na Tsini, sima emataki na ngambo ya sude ya Kadeshi-Barinea mpe ekitaki na Etsironi; emataki na ngambo ya Adari mpe ebalukaki na ngambo ya Karika.
4 接連到押們,通到埃及小河,直通到海為止。這就是他們的南界。
Elekaki na Atsimoni, ekendeki kotutana na moluka ya Ejipito mpe esukaki na Ebale monene. Yango nde ezali mondelo na bango na ngambo ya sude.
5 東界是從鹽海南邊到約旦河口。北界是從約旦河口的海汊起,
Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani.
6 上到伯‧曷拉,過伯‧亞拉巴的北邊,上到呂便之子波罕的磐石;
Mondelo emataki na Beti-Ogila, elekaki na ngambo ya nor ya Beti-Araba mpe emataki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.
7 從亞割谷往北,上到底璧,直向河南亞都冥坡對面的吉甲;又接連到隱‧示麥泉,直通到隱‧羅結,
Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli.
8 上到欣嫩子谷,貼近耶布斯的南界(耶布斯就是耶路撒冷);又上到欣嫩谷西邊的山頂,就是在利乏音谷極北的邊界;
Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi.
9 又從山頂延到尼弗多亞的水源,通到以弗崙山的城邑,又延到巴拉(巴拉就是基列‧耶琳);
Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi).
10 又從巴拉往西繞到西珥山,接連到耶琳山的北邊(耶琳就是基撒崙);又下到伯‧示麥過亭納,
Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni); ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina.
11 通到以革倫北邊,延到施基崙,接連到巴拉山;又通到雅比聶,直通到海為止。
Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.
12 西界就是大海和靠近大海之地。這是猶大人按着宗族所得之地四圍的交界。
Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane. Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango.
13 約書亞照耶和華所吩咐的,將猶大人中的一段地,就是基列‧亞巴,分給耶孚尼的兒子迦勒。亞巴是亞衲族的始祖(基列‧亞巴就是希伯崙)。
Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele: Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).
14 迦勒就從那裏趕出亞衲族的三個族長,就是示篩、亞希幔、撻買;
Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki: Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.
15 又從那裏上去,攻擊底璧的居民。(這底璧從前名叫基列‧西弗。)
Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. »
16 迦勒說:「誰能攻打基列‧西弗將城奪取,我就把我女兒押撒給他為妻。」
Kalebi alobaki: « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. »
17 迦勒兄弟基納斯的兒子俄陀聶奪取了那城,迦勒就把女兒押撒給他為妻。
Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.
18 押撒過門的時候,勸丈夫向她父親求一塊田,押撒一下驢,迦勒問她說:「你要甚麼?」
Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye: — Olingi nini?
19 她說:「求你賜福給我,你既將我安置在南地,求你也給我水泉。」她父親就把上泉下泉賜給她。
Akisa azongisaki: — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.
20 以下是猶大支派按着宗族所得的產業。
Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango.
21 猶大支派儘南邊的城邑,與以東交界相近的,就是甲薛、以得、雅姑珥、
Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi: Kabiseyeli, Ederi, Yaguri,
22 基拿、底摩拿、亞大達、
Kina, Dimona, Adada,
23 基低斯、夏瑣、以提楠、
Kedeshi, Atsori, Itinani,
24 西弗、提鍊、比亞綠、
Zifi, Telemi, Bealoti,
25 夏瑣‧哈大他、加略‧希斯崙(加略‧希斯崙就是夏瑣)、
Atsori-Adata, Kerioti-Etsironi oyo bazalaki mpe kobenga Atsori,
26 亞曼、示瑪、摩拉大、
Amami, Shema, Molada,
27 哈薩‧迦大、黑實門、伯‧帕列、
Atsari-Gada, Eshimoni, Beti-Paleti,
28 哈薩‧書亞、別是巴、比斯約他、
Atsari-Shuwali, Beri-Sheba, Biziotia,
29 巴拉、以因、以森、
Baala, Iyimi, Atsemi,
30 伊勒多臘、基失、何珥瑪、
Elitoladi, Kesili, Orima,
31 洗革拉、麥瑪拿、三撒拿、
Tsikilagi, Madimana, Sanisana,
32 利巴勿、實忻、亞因、臨門,共二十九座城,還有屬城的村莊。
Lebaoti, Shilimi, Ayini mpe Rimoni: bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
33 在高原有以實陶、瑣拉、亞實拿、
Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene: Eshitaoli, Tsorea, Ashina,
34 撒挪亞、隱‧干寧、他普亞、以楠、
Zanoa, Eyini-Ganimi, Tapua, Enami,
35 耶末、亞杜蘭、梭哥、亞西加、
Yarimuti, Adulami, Soko, Azeka,
36 沙拉音、亞底他音、基底拉、基底羅他音,共十四座城,還有屬城的村莊。
Shaarayimi, Aditayimi, Gedera to Gederotayimi: bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
37 又有洗楠、哈大沙、麥大‧迦得、
Tsenani, Adasha, Migidali-Gadi,
38 底連、米斯巴、約帖、
Dileani, Mitsipe, Yokiteyeli,
39 拉吉、波斯加、伊磯倫、
Lakishi, Botsikati, Egiloni,
40 迦本、拉幔、基提利、
Kaboni, Lakimasi, Kitilishi,
41 基低羅、伯‧大袞、拿瑪、瑪基大,共十六座城,還有屬城的村莊。
Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda: bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
42 又有立拿、以帖、亞珊、
Libina, Eteri, Ashani;
43 益弗他、亞實拿、尼悉、
Yifita, Ashina, Netsibi,
44 基伊拉、亞革悉、瑪利沙,共九座城,還有屬城的村莊。
Keila, Akizibi mpe Maresha: bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
45 又有以革倫和屬以革倫的鎮市村莊;
Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango,
46 從以革倫直到海,一切靠近亞實突之地,並屬其地的村莊。
longwa na Ekroni mpe na ngambo ya weste, mabele nyonso oyo ezalaki pene ya Asidodi mpe bamboka na yango;
47 亞實突和屬亞實突的鎮市村莊;迦薩和屬迦薩的鎮市村莊;直到埃及小河,並大海和靠近大海之地。
Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango.
48 在山地有沙密、雅提珥、梭哥、
Na mokili ya bangomba: Shamiri, Yatiri, Soko,
49 大拿、基列‧薩拿(基列‧薩拿就是底璧)、
Dana, Kiriati-Sana oyo bazalaki mpe kobenga Debiri,
50 亞拿伯、以實提莫、亞念、
Anabi, Eshitemoa, Animi,
51 歌珊、何倫、基羅,共十一座城,還有屬城的村莊。
Gosheni, Oloni mpe Gilo: bingumba nyonso ezalaki zomi na moko elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
52 又有亞拉、度瑪、以珊、
Arabi, Duma, Esheani,
53 雅農、伯‧他普亞、亞非加、
Yanumi, Beti-Tapua, Afeki,
54 宏他、基列‧亞巴(基列‧亞巴就是希伯崙)、洗珥,共九座城,還有屬城的村莊。
Umeta, Kiriati-Ariba oyo bazalaki mpe kobenga Ebron, mpe Tsiori: bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na mboka na yango ya mike-mike.
55 又有瑪雲、迦密、西弗、淤他、
Maoni, Karimeli, Zifi, Yuta,
56 耶斯列、約甸、撒挪亞、
Jizireyeli, Yokideami, Zanoa,
57 該隱、基比亞、亭納,共十座城,還有屬城的村莊。
Kayini, Gibea mpe Timina: bingumba nyonso ezalaki zomi elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
58 又有哈忽、伯‧夙、基突、
Aliwuli, Beti-Tsuri, Gedori,
59 瑪臘、伯‧亞諾、伊勒提君,共六座城,還有屬城的村莊。
Maarati, Beti-Anoti mpe Elitekoni: bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
60 又有基列‧巴力(基列‧巴力就是基列‧耶琳)、拉巴,共兩座城,還有屬城的村莊。
Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba: bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
61 在曠野有伯‧亞拉巴、密丁、西迦迦、
Tala bingumba oyo ezalaki na esobe: Beti-Araba, Midini, Sekaka,
62 匿珊、鹽城、隱‧基底,共六座城,還有屬城的村莊。
Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi: bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
63 至於住耶路撒冷的耶布斯人,猶大人不能把他們趕出去,耶布斯人卻在耶路撒冷與猶大人同住,直到今日。
Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.

< 約書亞記 15 >