< 約伯記 27 >
2 上帝奪去我的理,全能者使我心中愁苦。 我指着永生的上帝起誓:
« Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai,
3 我的生命尚在我裏面; 上帝所賜呼吸之氣仍在我的鼻孔內。
wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,
4 我的嘴決不說非義之言; 我的舌也不說詭詐之語。
bibebu na ngai ekoloba mabe te, mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te.
Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino! Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola boyengebene na ngai,
6 我持定我的義,必不放鬆; 在世的日子,我心必不責備我。
nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te; motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.
7 願我的仇敵如惡人一樣; 願那起來攻擊我的,如不義之人一般。
Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe, mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo!
8 不敬虔的人雖然得利, 上帝奪取其命的時候還有甚麼指望呢?
Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye?
Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye tango pasi ekomelaki ye?
Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso?
11 上帝的作為,我要指教你們; 全能者所行的,我也不隱瞞。
Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe, nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Bino nyonso, boyebi yango malamu! Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye?
13 上帝為惡人所定的分, 強暴人從全能者所得的報乃是這樣:
Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, libula oyo moto ya mobulu azwaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso:
14 倘或他的兒女增多,還是被刀所殺; 他的子孫必不得飽食。
Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, mopanga ezali lifuti na bango, bakitani na ye bakokufa na nzala,
15 他所遺留的人必死而埋葬; 他的寡婦也不哀哭。
bokono oyo ebomaka ekoboma bato na ye, oyo bakotikala na bomoi, mpe basi na bango oyo bakufisa mibali bakolela bango te.
Ata soki asangisi palata lokola putulu mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,
17 他只管預備,義人卻要穿上; 他的銀子,無辜的人要分取。
nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango, mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye.
Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu, lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka.
19 他雖富足躺臥,卻不得收殮, 轉眼之間就不在了。
Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.
Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela; na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.
Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye, mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye.
22 上帝要向他射箭,並不留情; 他恨不得逃脫上帝的手。
Bakobwakela ye makonga na mawa te, ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto oyo azali kobwakela ye yango.
Bakobetela libebi na ye maboko, mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »