< 約伯記 2 >

1 又有一天,上帝的眾子來侍立在耶和華面前,撒但也來在其中。
Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
2 耶和華問撒但說:「你從哪裏來?」撒但回答說:「我從地上走來走去,往返而來。」
Yawe atunaki Satana: — Owuti wapi? Satana azongiselaki Yawe: — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
3 耶和華問撒但說:「你曾用心察看我的僕人約伯沒有?地上再沒有人像他完全正直,敬畏上帝,遠離惡事。你雖激動我攻擊他,無故地毀滅他,他仍然持守他的純正。」
Yawe alobaki na Satana: — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili: azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.
4 撒但回答耶和華說:「人以皮代皮,情願捨去一切所有的,保全性命。
Satana azongiselaki Yawe: — Poso mpo na poso: moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.
5 你且伸手傷他的骨頭和他的肉,他必當面棄掉你。」
Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
6 耶和華對撒但說:「他在你手中,只要存留他的性命。」
Yawe alobaki na Satana: — Malamu! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te!
7 於是撒但從耶和華面前退去,擊打約伯,使他從腳掌到頭頂長毒瘡。
Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
8 約伯就坐在爐灰中,拿瓦片刮身體。
Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu.
9 他的妻子對他說:「你仍然持守你的純正嗎?你棄掉上帝,死了吧!」
Mwasi na ye alobaki na ye: — Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo!
10 約伯卻對她說:「你說話像愚頑的婦人一樣。噯!難道我們從上帝手裏得福,不也受禍嗎?」在這一切的事上約伯並不以口犯罪。
Yobo azongiselaki ye: — Ah! Ozali koloba lokola moto ya liboma! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te?
11 約伯的三個朋友-提幔人以利法、書亞人比勒達、拿瑪人瑣法-聽說有這一切的災禍臨到他身上,各人就從本處約會同來,為他悲傷,安慰他。
Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani; Bilidadi, moto ya Shuwa; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.
12 他們遠遠地舉目觀看,認不出他來,就放聲大哭。各人撕裂外袍,把塵土向天揚起來,落在自己的頭上。
Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
13 他們就同他七天七夜坐在地上,一個人也不向他說句話,因為他極其痛苦。
Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.

< 約伯記 2 >