< 以賽亞書 30 >
1 耶和華說: 禍哉!這悖逆的兒女。 他們同謀,卻不由於我, 結盟,卻不由於我的靈, 以致罪上加罪;
« Mawa na bana ya mito makasi, » elobi Yawe: « basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te, mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu;
2 起身下埃及去,並沒有求問我; 要靠法老的力量加添自己的力量, 並投在埃及的蔭下。
mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito, na kozanga kotuna toli na Ngai, mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraon mpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito!
3 所以,法老的力量必作你們的羞辱; 投在埃及的蔭下,要為你們的慚愧。
Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela ekokomela bino soni, mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.
Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani mpe bantoma na bango bakomi na Anesi,
5 他們必因那不利於他們的民蒙羞。 那民並非幫助,也非利益, 只作羞恥凌辱。
bango nyonso bakoyoka kaka soni na miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te, oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te, kasi bobele soni mpe kotiolama. »
6 論南方牲畜的默示: 他們把財物馱在驢駒的脊背上, 將寶物馱在駱駝的肉鞍上, 經過艱難困苦之地, 就是公獅、母獅、蝮蛇、火焰的飛龍之地, 往那不利於他們的民那裏去。
Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi: Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te:
7 埃及的幫助是徒然無益的; 所以我稱她為「坐而不動的拉哈伯」。
ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala penza na tina moko te; yango wana, napesi yango kombo « Rahavi. »
8 現今你去, 在他們面前將這話刻在版上, 寫在書上, 以便傳留後世,直到永永遠遠。
Kende sik’oyo, koma makambo oyo na etando ya libanga liboso na bango, koma yango na buku moko mpo ete na mikolo oyo ekoya, ezala lokola litatoli ya libela na libela.
9 因為他們是悖逆的百姓、說謊的兒女, 不肯聽從耶和華訓誨的兒女。
Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe;
10 他們對先見說:不要望見不吉利的事, 對先知說:不要向我們講正直的話; 要向我們說柔和的話, 言虛幻的事。
balobaka na bato oyo bamonaka makambo: « Bomona te, » mpe na basakoli: « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, bosakolela biso makambo ya lokuta.
11 你們要離棄正道,偏離直路, 不要在我們面前再提說以色列的聖者。
Botika nzela wana, bobima penza na nzela wana mpe botika kotungisa biso mpo na Mosantu ya Isalaele! »
12 所以,以色列的聖者如此說: 因為你們藐視這訓誨的話, 倚賴欺壓和乖僻,以此為可靠的,
Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi: « Lokola bobwaki maloba oyo, lokola bokangami na monyokoli mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema,
13 故此,這罪孽在你們身上, 好像將要破裂凸出來的高牆, 頃刻之間忽然坍塌;
lisumu oyo ekokoma mpo na bino lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu, bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata.
14 要被打碎,好像把窯匠的瓦器打碎, 毫不顧惜, 甚至碎塊中找不到一片可用以從爐內取火, 從池中舀水。
Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki, ekopanzana penza nye na mawa te; bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango mpo na kozwela likala ya moto na mbabola to mpo na kotokela mayi na libulu. »
15 主耶和華-以色列的聖者曾如此說: 你們得救在乎歸回安息; 你們得力在乎平靜安穩; 你們竟自不肯。
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi: « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino; kasi bino, bolingi bongo te.
16 你們卻說:不然,我們要騎馬奔走。 所以你們必然奔走; 又說:我們要騎飛快的牲口。 所以追趕你們的,也必飛快。
Bolobaki: ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda; › solo, bokokima nde! Bolobaki: ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu!
17 一人叱喝,必令千人逃跑; 五人叱喝,你們都必逃跑; 以致剩下的,好像山頂的旗杆, 岡上的大旗。
Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »
18 耶和華必然等候,要施恩給你們; 必然興起,好憐憫你們。 因為耶和華是公平的上帝; 凡等候他的都是有福的!
Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo: Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye!
19 百姓必在錫安、在耶路撒冷居住;你不再哭泣。主必因你哀求的聲音施恩給你;他聽見的時候就必應允你。
Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
20 主雖然以艱難給你當餅,以困苦給你當水,你的教師卻不再隱藏;你眼必看見你的教師。
Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi, mpe mayi na tango ya minyoko; moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te, kasi miso na bino moko ekomona ye.
21 你或向左或向右,你必聽見後邊有聲音說:「這是正路,要行在其間。」
Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo: « Tala nzela yango oyo! »
22 你雕刻偶像所包的銀子和鑄造偶像所鍍的金子,你要玷污,要拋棄,好像污穢之物,對偶像說:「去吧!」
Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango: « Longwa awa! »
23 你將種子撒在地裏,主必降雨在其上,並使地所出的糧肥美豐盛。到那時,你的牲畜必在寬闊的草場吃草。
Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.
24 耕地的牛和驢駒必吃加鹽的料;這料是用木杴和杈子揚淨的。
Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilanga ekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu.
25 在大行殺戮的日子,高臺倒塌的時候,各高山岡陵必有川流河湧。
Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana, bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse.
26 當耶和華纏裹他百姓的損處,醫治他民鞭傷的日子,月光必像日光,日光必加七倍,像七日的光一樣。
Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, mpe pole ya moyi ekongenga makasi koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye mpe akobikisa yango.
27 看哪,耶和華的名從遠方來, 怒氣燒起,密煙上騰。 他的嘴唇滿有忿恨; 他的舌頭像吞滅的火。
Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya; kanda na Ye ezali kopela lokola moto elongo na lipata ya molinga ya moto makasi; bibebu na Ye etondi na kanda, mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.
28 他的氣如漲溢的河水,直漲到頸項, 要用毀滅的篩籮篩淨列國, 並且在眾民的口中必有使人錯行的嚼環。
Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi, ebale oyo etondi kino na kingo. Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi, akotia na mbanga ya bato ebende oyo batiaka na minoko ya bampunda mpo ete emema bango na libunga.
29 你們必唱歌,像守聖節的夜間一樣,並且心中喜樂,像人吹笛,上耶和華的山,到以色列的磐石那裏。
Mpo na bino, bokoyemba banzembo lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule; mitema na bino ekotonda na esengo lokola bato oyo bazali kobeta flite mpo na kokende na Ngomba ya Yawe, na Libanga ya Isalaele.
30 耶和華必使人聽他威嚴的聲音,又顯他降罰的膀臂和他怒中的忿恨,並吞滅的火焰與霹雷、暴風、冰雹。
Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.
31 亞述人必因耶和華的聲音驚惶;耶和華必用杖擊打他。
Mongongo ya Yawe ekokweyisa Asiri, mpe akobeta bango na lingenda na Ye ya bokonzi.
32 耶和華必將命定的杖加在他身上;每打一下,人必擊鼓彈琴。打仗的時候,耶和華必掄起手來,與他交戰。
Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bango fimbu na Ye ya kosambisa, ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda, ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Ye mpo na kobundisa bango.
33 原來陀斐特又深又寬,早已為王預備好了;其中堆的是火與許多木柴。耶和華的氣如一股硫磺火使他着起來。
Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.